Luka

Kokàmwa ya Sàngó moko Pápa abikisaki

Sàngó Franco Semeraro ayebisi bapanzi-nsango ya Vatikan lolenge Léon XIV asalisaki ndeko na ye ya mobali, Diego, sango oyo wapi, o mokolo mwa misato mwa 27 Mai, amiyokaki mabe na tango ya Malongi ma Pàpa na Place Saint-Pierre mpo na molunge: pápa yemoko apesaki ye sapelé.

Bansango ya Vatikan

 

Bililingi bina bilekaki mbala yoko o mokili mobimba: Etuluku ya bato balati bakazaka moyindo nà ba kravati, bayanganaki o molóngó liboso lya esika Santu Petro to Saint Piere, o mokolo mwa misato, mwa 27 Mai mpo na likita linene lya banso. Elilingi lya moto alati mpembe, Pàpa Leon XIV, ekitaki na lopango mpe efukamaki liboso la Sango mpo ayeba yemoko likambo lizalaki koleka. Nganga-Nzambe oyo azwaki lisalisi ezali Sàngó Diego Semeraro, moto ya Martina Franca, engumba moko ya ekolo ya Italie, ezwami na etukà ya Tarente, na Pouilles. Akomaki na Roma elongo nà ndeko way e ya mobali, Sàngó Franco, mpamba te, azalaki kosepela mibù tuku motobà (60 ans) ya bonganga bwa yé. Apesaki pápa búku moko ezalaki nà ba fótó ya bareliki ya Santu Augustin. Bazwaki yango, na tango ekómaki na Martina Franca esili koleka boye soko mibu ntuku mibale.

Tata-Mosantu, solo ezali yo ? 

“Ezali likambo la kokamwa mpenza”, eyebisi bapanzi nsango ya Vatikan, Sangó Franco, tango azali kolobela likambo lyango. Ntango azalaki kokota na lopango ya ndako-nzambe mpo na milulu mya kopesana lipwepwe na Papa. “Sima ya kozala na nsé ya moyi koleka bangonga misato, ndeko na ngai ayokaki mabe”. Akweyaki mbala mingi mpe azokaki mwa moke, kasi Nzambe melesi, azali malamu sik’awa. “Moto ya liboso oyo ayaki kosunga ye ezalaki Pape Léon ye moko: “Afukamaki liboso, akendaki kosunga ye”. Elobaki Don Franco, ‘te akamwaki tango Don Diego atunaki “Tata Mosantu, ezali solo yo ?”. Na nsima, Pápa apwepwaki ye na lobókó mpe ye moko apesaki ye sapelé. Nsima ya likambo yango, bamemaki Sàngó yango na lopitalo ya Vatikan mpo básala ye ekizame, kasi emonanaki ‘te azalaki na maladi te. Sima ya Malongi na likita lya bato banso, alyaki mpe asalaki misa.

Bokuli bonganga na esika Saint-Pierre

Don Diego akokokisa bambula tuku mwambé na mibale (82 ans) na sànzà ya Yuni. Likambo ayokaki na Saint-Pierre, ezalaki mbala ya liboso te ‘te ayoka ndenge wana na liboso lya hémicycle ya Bernin. Paul VI akulisaki ye Bonganga na na mobù 1970. Bambula mingi, azalaki kosala na paroisse ya Sainte Famille na Martina Franca, epai wapi asalaki mosala ya eklezya na tango molai.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

29 sánzá ya mítáno 2026, 23:31