Luka

2025.10.26  Sanctuaire ya  Pompei . 2025.10.26 Sanctuaire ya Pompei . 

Archeveque ya Pompei : Pàpa azali koyà mpo ya kolendisa biso na boyambi

Ekozala ekwelà moko monene: esengo ya kosepela elongo nà Pàpà mbula ya liboso ya bopàpa bwa yé. Elobaki Mgr Tommaso Caputo, na bapanzi-nsango ya Vatikan mpo na kozela ya engumba ya Campanie, oyo ekoyamba Léon XIV, o mokolo mwa mitano, mwa 8 ya sànzà ya Mayi. Bakokundola mokolo moye aponamaki na kiti ya Petro mpe mokolo moye eklezia ekokundola Ngondo Maria, oyo bàkumisaka na sanctuaire ena.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lolenge azali koyà na Pompei mpo na kosepela mobu mwa yambo ya kibopàpa (pontificat) bwa yé, Tata Mosantu apesi biso likabo lya motuya, oyo tolingi koyamba na motema mwa biso etondi botondi, mpo ete lisanga na biso ekoma ntango inso esika ya mwinda, eteyelo ya losambo mpe esika ya makasi ya kimia. Ezali bongo maloba ma boyei bolamu Mgr Tommaso Caputo alobaki. Mp ona kolimbola malamu, yé azali momemi-nsango (delegué) ya Pápa mpo na esika mosantu to sanctuaire ya Mwa-esengo Maria, ngondo ya Santu Rosario ya Pompéi, oyo ekoyamba o mokolo mwa mitano, mwa 8 ya sànzà ya Mayi. “Tozali kozela ye na mposa mpe esengo”, ezali bongo maloba ma bayambi baye bazali kozela Leon na mboka Campanie, lokola Wayambo na bango alobi na ba medias ya Vatikan. Bato bayiké ya bipai na bipai basengi kosangana na ekwela ena, kasi mp ona mpasi ya bisika ya kofanda, bakoki kosepelisa bosenga ya banso soki te.

Pàpa ya liboso akendaki na Pompei ezalaki Pàpa Jean-Paul II; ezalaki na sànzà ya Okotobé ya mobù 1979, mpe sima ya mibù misusu na 2003. Nde na 2008, mokitani way e, Pàpa Benois XVI akendaki mpe na mwa mboka eye, ezwamina ntaka ya ba kilometele tuku misato na engumba ya Naples. Bakendaka mpo ya kosambela liboso ya ekeko ya Ngondo Maria. Mobù 2015 ezali mbala ya nsuka oyo Pàpa akendaki na esika ena, na sànzà ya Marsi. Nzoka ndé mobembo ya Pàpa Leon ya XIV, eyei sima ya mibù zomi na moko ya mobembo ya Pàpa François.  

Mgr Caputo elongo nà bilenge, na tango ya feti ya accueil na Centre Bartolo Longo, o mokolo mwa 28 Setembe ya mobù 2022.
Mgr Caputo elongo nà bilenge, na tango ya feti ya accueil na Centre Bartolo Longo, o mokolo mwa 28 Setembe ya mobù 2022.

Mgr Caputo, lolenge kani mokolo moye mokoleka ?

Lokola mibembo minso mya Pàpa ezali ekwela enene mpo na lisapo lya engumba epai wapi akokende. Ebongolaka mboka liboso mpe sima na yango. Tango na tango ezali na motuya na yango. O kati ya makambo mingi mya ntina, ekozala na molulu mya Ukaristya oyo Pàpa akokamba, na ngonga ya 10h30, na esika ezali liboso ya Sanctuaire. Sima ekolanda milulu mya mabondeli na Notre-Dame ya Pompei, bakosala esakola ya komibonza na Ngondo Mosantu Maria. Losambo liye esalemaki ut’o 1883, mobandisi mwa yango ndé Santu Bartolo Longo. Mgr Caputo alobi ‘te bankoto na bamiliyon ya bato, bakozala wana mpo na koyamba Pàpa Leon. Kasi yambo akoleka na “Temple ya charité”, esika monene ya misala ya bondeko ya sanctuaire. Esalemi na bana, bilenge, bakóló mpe basi baye bazali bango moko nà bana babango. Bongo na sima, yambo ‘te àsala misa, akotambola o kati ya mboka. Akokutana mpe na bakoni, bakoka mpe babangé na ndako-Nzambe monene to Baziliki.

Boni boni engumba ezali komilengele mpo ya mobembo moye?

Mobembo ya Nganga-Mokonzi nyonso elengelamaka nayino na misàla ya molimo, na nzela ya losambo. Lokola engumba ya biso epesaka lokumu na Maria, losàmbo la motuya ezali losambo la sapelé. Kasi tozali kolengele boyei bwa Pàpa mpe na misàlà makasi oyo ezali kosalema na bomipesi ya moko na moko, kobanda na bakonzi ya Naples kino na etuka ya Campanie, engumba monene ya pompei. Ezali mpe na lisungi lya ba volontaire bayiké, maziki ndenge na ndenge. Ezali tango moko ya esengo mpo ya koyamba na Centre Bartolo Longo.

Na tango ya feti ya accueil na Centre Bartolo Longo.
Na tango ya feti ya accueil na Centre Bartolo Longo.

Na sima alobelaki mpe makambo matali mboka Pompei, Mosantu Bartolo Longo, oyo Pàpa Leon ya XIV yémei alubolaki (akomisaki mosantu), o mokolo mwa 19 okotobé ya mobù 2025. Azali mosantu molingami ya bato bamboka ya biso kasi mpe ya bisika bisusu. Mpamba ‘te, mingi bayaka na mobembo mbula na mbula awa na sanctuaire mpo na kosambela. Na mpe bampaya bakowùtaka bamboka bipai bisusu, lokola Pologne, ba mboka mingi ya Amerika latine, na mpe oyo ya Inde. 

Nakolobela Santu Bartolo Longo na eleko oyo ya biso, apesaki ye lokola ndakisa ya moto oyo atikaki boyambi bwa yé ya bobwana to bolenge, kasi sima ayei kobongwama. Bomoi bwa ye ezali kolakisa na basi mpe babali ya mikolo mya biso, boni boni, bakoki soki moke te kolongola moto na bolingi bwa nzambe. Na litatoli na ye, bato bamobembo bakundoli ‘te lisumu to molili moko te, ekoki kopekisa moto na komona lisusu mwinda mwa mokolo.

Na nsuka, alobelaki mabongi maye mobembo mwa Pàpa ekoki komema na lingomba na bango. Mpamba ‘te, Pàpa akei kolendisa bango na boyambi mpe na elikya, n antina te bazwa makasi ma sika yak osala misala ya bondeko. Bongo abakisi ‘te Pàpa ayei kolakisa biso lolenge ya kotombola lisusu miso likolo mp ona koluka Yezu Krsitu oyo akufaki mpe asekwi mpo ya biso; ye ndé azali solo liziba lya esengo ya biso,

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

05 sánzá ya mítáno 2026, 20:24