Luka

2026.05.15  Pàpa Leon XIV, na tango ya kotiya mokoloto  na mokanda mwa ye ya yambo, "Magnifica Humanitas". 2026.05.15 Pàpa Leon XIV, na tango ya kotiya mokoloto na mokanda mwa ye ya yambo, "Magnifica Humanitas".  (@Vatican Media)

Ansykliki ya Léon XIV: Tika ‘te IA ezala mosàli ya bato kasi bokazi ya mwa bato mpamba te.

Awa «Rerum novarum» ekokisi mibù 135 ya bobandisi bwa yango, Pàpa akanisi na ansykliki ya ye ya yambo «Magnifica humanitas», na doktrini sociali ya eklezya, na eleko ya mayele ya bamasini to ya bomoto. Ezali mbela mpo ya kobatela “mokili bonzengà, epai wapi Nzambe afandi”, mpo na kotombola bosolo, mosala malamu, bosembo kati na bato mpe kimya. Na eleko eye ya nimeriki, tósengeli kolongola bibundeli ya IA mpe kolekisa likambo la «etumba ya bosembo», tómatisa ezalela ya masolo mpe miltilateralisme

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

«Mokili Bonzenga moye Nzambe akelá ezwami lelomei na likambo yoko ya makasi ya kopona: kotonga ndako molai ya Babele ya sika, to kotonga engumba epai wapi Nzambe mpe bato bakofanda esika moko». Ebandela ya ansikliki yambo ya Pàpa Leon XIV – Magnofica humanitas, elobeli libateli la moto na eleko eye ya mayele ya masini to mayele ma bomoto – apesi ba raisons fondamentali mpe ba ojetifi na yango. Ebimaki o mokolo mwa25 ya sànzà ya màyi, kasi Pàpa atiyaki mokoloto mwa ye o mokolo mwa zomi na mitano moleki (15) ya sànzà yango, na libakù lya mibù nkama mokona tuku misato na mitano (135 è) ya bobandisi bwa Rerum novarum (Rerum novarum) ya Leon XIII. Pàpa Leon XIV azongeli libula ya moto azalaki liboso la yé (predécesseur), bongo akomi ansikliki sociali oyo ezali kolobela moko kati na makambo ma ntina ya mikolo mya lelo, mpo na maye matali mayele ma bamasini to mayele ya babomoto    

Mokanda mwango mokabolami na biteni mitano, bakisa eteni ya ebandela mpe ya nsuka. Magnifica humanitas ebandi na koloba ‘te tekinoloji ezali te “nguya ezali kobundisa moto” (4), to “mabe lolenge ezali yango moko” (9). Nzokande, yango “ezali neutre te, mpamba te ezali kokamata elongi ya bato oyo bazali kobondisa yango, basungaka yango, batambwisaka yango mpe basalelaka yango”. Nde mpo na yango, Pàpa abéngaki bato “básala to batonga bolamu” mpe “bátikala bato”. Bongo balanda likanisi lya kozala na mokumba moko na mpiko nyonso, ya lisungi, ya bondeko, mpo ‘te “mokili mobimba moyeba. o kati ya motema mwa moto, nde esika Nzambe alingi kofanda” (16).

Soki bolingi koyeba o bozindo maye manso makomami o kati ya mokanda moye, na mobimba mwa yango, fina na esika eye, ( https://www.vaticannews.va/fr/pape/news/2026-05/resume-encyclique-magnifica-humanitas-leon-xiv.html)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

26 sánzá ya mítáno 2026, 22:08