Luka

Angélus: Eyenga to Feti ya Nzambe ezali mpe feti na biso

O mokolo mwa lomingo loye la Bosato Bosantu, Pàpa Léon XIV atambwisaki losambo la angelus, na Place Saint-Pierre, bo momeseno. Abyangi bayambi bàtanga lisusu nzela eye baùti kotambola na eleko ya Pasika: Bomoi bwa Nzambemei, emonisami na Yezu Kristu, bongo na nzela ya Elimo Santu epesameli. Liboso lya bokabwani mpe boyimi, bandimi babyangemi na koyamba Elimo ya Komunio mpo na kozala na bomoi bwa esengo bwa Nzambe mpe kokóma batongi ya bomoko.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Eyenga ya Bosato Bosantu ezali mobombamo ya boyambi ya bokristu, bakosepela yango poso moko nsima ya eyenga ya Nkitela ya Elimo Santu (Pantekote). Mpo na Léon XIV, feti oyo ya Nzambe, oyo ezali feti na biso, ezali libaku ya kozonga na liziba ya bomoi ya mokristo: “bomoi bwa Nzambe oyo epesamaki na biso na Yesu Kristu”. Bomoi boye bwa boNzambe ezali eloko etikalaka ya kotelema te, kasi; ezali nde “komunio to lisangá ya nguya, oyo ekoki kosila te, oyo ezali kobota mbuma”. Ezali kopalangana na mokili na nzela ya mosala mwa Elimo Santu. Se na lolenge wana nde Eklezia ekomi kati na mokili, elembo ya bondeko bwa Nzambe, “esika ya bokutani, ya bolingo mpe ya bomoi, esika wapi lola mpe mabele esimbani”.

Nikodeme kati na boluki mwinda

Nsango Elamu elobeli Nikodeme, mokonzi moko ya Yisalaele oyo asepelaki na Yezu mpe alingaki koyeba mateya ma ye. Na butu ayaki kokutana nà Kristu, amonaki ‘te bomoi bwa sika ekoki kosalema, elobaki Tata Mosantu, mpe abakisaki ‘te “na koyamba ye, Yezu apesi motuya na boluki ye” mpe mpo ‘te Nzambe alingaki mokili na motindo boye, apesi Mwana wa ye bobele moko ‘te moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ‘te azala na bomoi bwa seko”.

O ndako ya yé, na mobombamo mwa Nzambe

Mpo na episkopo ya Roma, libombami lya Bosato Bosantu ezali likambo ya mosika te; mpamba te, kozala elongó na Yezu, lokola Nikodeme esalisaka mpo omiyoka ‘te ozali epai ya yo, biso mpe tozali na ndako na biso. Bomoi ya Nzambe, abakisaki, ezali “ya kokamwa mpe ya kokamwisa, ezali kopesa kimya na mitema mya biso, oyo mbala mingi etondi na mitungisi, mpe ezali kopesa biso libaku ya kokutana nà bandeko mibali mpe basi na esengo ya Elimo”. “Bosato bosantu ezali kotinda biso tolinga biloko binso mpe bato banso”, elobaki lisusu Pàpa. Mpo na ye, moto nyonso mpe ekelamu nyonso abengami na boyokani, na bokutani mpe na kokabola. Nzokande, alobaki nà mawa nyonso ‘te: “Bokabwani, bokeseni, kotyola lolenge nyonso ya bomoi ememaka libebisi, mawa, mpe bozanga mayi”.

Molimo ya bomoko ebongolaka mitema

Engebene na Léon XIV, Nicodème azalaki ndakisa ya mbongwana ya kati. Na tango basambisaki Yezu na bosembo te, Moko ya ba-Sanedrin alendisaki ye ayoka mpe azala na bososoli. Azali koboya kopesa etumbu nokinoki mpe azali kosenga baninga ba ye báyoka moto oyo bazali kolobela mabe mpo bakitisa ye. Ezaleli ena, elobaki Léon XIV, ebotami na mosala “mwa Elimo ya bondeko, oyo efungolaka motema na bosolo bwa sika mpe na makambo masika ya solo”. Nganga-Mokonzi monene akebisaki na likámá ya komitalela yo moko mpe ya kozala na mawa: “Moto oyo ayambi elimo eye, akokóma mobangé na lombango, akozala na mawa, akozala ye moko, mpe molimo mwa ye mokozala na esengo soko moke te”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

31 sánzá ya mítáno 2026, 17:46