Luka

Regina Caeli: Zàla na lobokó mpo na bokutani bwa Ukaristya elongo nà Mosekwi

Yambo 'te asala losambo la Regina Caeli o mokolo mwa lomingo, mwa 12 Aprili, Léon XIV akanisaki na ntina ya Ukaristya ya mokolo mwa lomingo kati na bomoi ya mokristu. Na mokili moye «mozali na mposa ya kimya makasi», Tata Mosantu asengi na biso ‘te tozala na momesano ya koliya Ukaristya mbala na mbala mpo ‘te «tozonga lokola banzeneneke ba bolingo mpe baye bakomema bozongisi boyokani».

Bansango ya Vatikan

 

Na mokolo mwa lomingo moye ya mibale ya Pasika, lomingo la Ngolu, oyo Jean Paul II abandisaki eleki mbula ntuku mibale na motoba, Pàpa Léon XIV atyaki makanisi ma yé ma ntina ya Ukaristya ya mokolo mwa lomingo mpo na kozala nzeneneke ya nsekwa. Na kolobela eteni ya Evanzile ya Yoane, oyo elobeli lolenge Yezu oyo asékwi abimelaki ntoma Toma sima ya lisekwa na ye (Talá na eteni Yoani. 20:19-31). Na sima, Pápa asengaki bakristu banso bákanisa lolenge ya bokutani na Kristu oyo asekwi.

Likambo yango esalemaki mikolo mwambe nsima ya Elekeli, ntango bato bayanganaki. Toma akutanaki na Yesu, mpe alobaki na ye ete atala bilembo ya bansɛtɛ mpe atya lobɔkɔ na ye na mopanzi na ye mpe andima. Ntoma “ayebaki ye na bilembo bya mbeka na ye”, mpe na nzela ya likambo lina, “asakolaki boyambi bwa ye, oyo eleki monene kati na ba Evanzile bonso minei: ‘Mokonzi na ngai nà Nzambe wa ngai’. (molongo mwa, 29)”.

Koleisa mpe kobatela Boyambi

Ya solo, ezali mpenza pete te mpo na kozala na boyambi to kondima tango inso, elobi Pàpa. “Ezalaki pete te mpo na Tomasi, pe ezali pete te mpo na biso”. Na yango, Léon XIV alobaki ‘te, na mokolo mwa mwambe, elingi koloba lomingo na lomingo, Eklezya ekosenga biso tósala lokola bayekoli ba liboso basalaki: tóyanganaka mpe tósalaka milulu mya Ukarisya elongo. Nganga-Mokonzi, alimboli boni boni Ukaristya ezali na motuya makasi kati na bomoi bwa biso. Na milulu minà, tokoyoka maloba ma Yezu, tokosàmbela, tokosakola boyambi bwa biso, tokokabola na bolingo biso makabo tozwi na Nzambe, tokobonza na Nzambe bomoyi bwa biso elongo na libonza lya Kristu, tokomileisa nzoto mpe makila ma Yé, mpo ‘te tozala biso mpe ba temo to banzeneneke ya Nsekwa ya yé.

Litatóli lya boyambi na nzela ya bomartiro na Eklezya ya Afrika

Awa akomi pene yak osala mobembo mwa ye ya mikolo zomi (10 jours) na mabele ma Afrika, Pàpa alobeli litatóli lya bamartiro bya Abitène batikaki. Ezali etuluku ya bakristu ba Afrika ya Nordi oyo babomaka na ekeke ya yambo. “Bandimaki kopesa bomoi bwa bango, tango bapekisaki bango kosàla milulu mya Ukaristya; mpamba te, bayanolaki ‘te, bakoki te kozala na bomoyi soki bazangi kosepela mokolo mwa Mokonsi”. Ezali na boyambi eye nde makasi ma biso esengeli epikama na Ngrasya ya Nzambe , atako ezali nayino nwa mwa mikakatano. “Na nzela ya Ukaristya, maboko ma bakristu, ma kobongwama na maboko ma Mosekwi to Kristu oyo asekwi. Tokomi banzeneneke ba bozali bwa yé, ya Ngolu na yé, ya kimya na yé na bilembo bya bikela to mosala, maladi, ya mibù mizali koleka, na ezalela ya boboto, na kopesa loboko na moninga, na bilembo bya bolingi”.

Bandeko babali mpe basi balingami, kati na mokili moye mozali na mposa ya kimya mingi, manso mazali kolendisa biso mingi koleka, mpo tózala na molende mpe na bosembo, na ntina ya bokutani bwa biso na Ykaristya elongo na Mosekwi, mpo ete tózonga lisusu epai na ye lokola batatoli ba bolingo mpe bamemi bya boyokani

Pàpa Leon asukisaki na maloba maye: “Tika ete Ngondo Maria asalisa biso na kosala yango; ye oyo azali Mwa-esengo, mpamba te zambi “andimaki atako amonaki te”.

Bankoto ya bakristu bayangani na esika Saint-Pierre mpo na koyoka mateya ma Pàpa Leon ya XIV
Bankoto ya bakristu bayangani na esika Saint-Pierre mpo na koyoka mateya ma Pàpa Leon ya XIV   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

12 sánzá ya mínei 2026, 16:11