Regina Caeli: Bótika te ‘te: “miyibi” bábótólo esengo mpe kimya ya bino

Yambo ya losambpo la Regina Caeli ya mokolo mwa lomingo la 26 Aprili, Leon ya XIV, ateyaki makanisi ma ntina, na elilingi ya Mokengeli mpata malamu, na bokeseni nà «miyibi», na mwinda mwa Nsango Elamu ya mokolo monà. Alobaki ‘te: «Yezu ayei lokola mobateli ya mpate mpe ezibelo ya lopango ya bampate». Kasi «miyibi» bazali «koyiba biloko ya mokili, kobomisa bato na bitumba, mpe kolendisa mabe ya lolenge nyonso, bazali kolongola biso nyonso elikya ya kozala na boboto mpe na kimya na mikolo mikoyà».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na lomingo loye la minei ya eleko ya Pasika, ebyangemi “Eyenga ya Mokengeli mpate Malamu”, Eklezya ya mikili mobimba ezali kosepela 63ème mokolo mwa mokili mobimba ya losambo mpo na ba Vokation. Mokolo monà mobandisamaki na Pàpa Paul VI na 1964. Na yango Leon asalaki mateya ma yé na elilingi ya Mobateli to Mokengeli mpate Malamu (Bon Pasteur). Mpo na komaniola litangi lya mokolo monà, ya Santu Yoane, oyo ezali kobeta lisapo lya Yezu, tango amilakisaki lokola Mokengeli mpate, mpe ezibelo ya ekangà (tala na Jn 10, 1-10), Tata Mosantu abyangi moko na moko akanisa makambo maye mazali kotambwisa bomoi bwa ye mpe apona nzela oyo ezali komema na bomoi ya kokoka mpe ya bonsomi.

Bokeseni makasi kati na Mokengeli mpe moyibi

Awa eleko ya Pasika ezali kokóba, lisoló ya Evanzile ezali komonisa bokeseni moko ya ntina mingi: bokeseni kati na mobateli ya mpate mpe moyibi. Yezu alobeli banzela mibale ekeseni mpo na kokóta na bomoi ya bato. Na ngámbo moko, mobateli ya mpate, oyo akoti na ezibelo mpe azali na boyokani bwa solo-solo elongo na bampate na ye; na ngámbo mosusu, moyibi, oyo akoti na mayele mpo na kobebisa. Moyibi ayaka bobele mpo na koyiba, koboma, mpe kobebisa. Kasi ngai nayei mpo ‘te bampate bázala na bomoi, bomoi ya malamu koleka. Yango nde elimbolaki Léon XIV, esali bokeseni: esika moyibi azangi, mobateli apesaka; esika moko abebisi, mosusu ekokoliisa

Pàpa na tango ya losambo la Regina Caeli
Pàpa na tango ya losambo la Regina Caeli   (@Vatican Media)

Boyokani ya penepenena Nzambe mpe ya bolingo

Yezu ayebisi biso ‘te asangani na biso lokola moninga: ayebi biso, abéngaka biso na nkombo, atambwisaka biso mpe, lokola mobateli ya mpate asalaka mpo na bampate na ye, alukaka biso ntango tobungi nzela mpe akangaka bampota na biso ntango tobeli. Na nsima, Pápa alimbolaki ‘te : Mokonzi ayaka lokola moyibi te mpo na koyiba bomoi bwa biso mpe bonsomi bwa biso, kasi mpo na kokamba biso na nzela ya malamu. Alobi lisusu’te, Kristu alobaki ‘te ayaki te mpo na kokómisa biso baombo to kokosa lisosoli na biso, kasi mpo na kongengisa yango na mwinda mwa mayele ma ye. Ayaka te mpo na kolongola biso esengo ya bomoi awa na mabelé, kasi mpo na kofungola nzela na esengo ya solo-solo mpe ya libela.

“Moto oyo atyelaka ye motema akoki kobanga eloko moko te; akoboma bomoi bwa biso te kasi akoyà kopesa biso yango bebo.”

Tokeba na lopango la motema mpe ya bomoi bwa biso

Na yango, Léon XIV abyangaki na kokanisa mpe mingi-mingi na kokeba mpo na « lopango la motema mwa biso mpe bomoi bwa biso, mpamba te, moto akoti kuna akoki kobakisa esengo to, lokola moyibi, koyiba yango epai na biso» ; wana nde likebisi ya Pápa. « Miyibi » bazali na « balongi » ebele: bazali kobebisa mpe kokata bonsomi, bazali kozipa miso, bazali komema bato na kopona mabe. Longola yango, bato mingi bazali na bomoi ya mindondo-mindondo te, bazali komipesa mingi na biloko ya mokili, mpe bomoi bwa bango ezali na ntina te. Na kotalela makambo mosusu, Léon XIV alobaki ete "miyibi" yango bamonanaka mpe na makambo ya kozanga bosembo oyo ezali kosalema na mokili: kobótóla biloko ya mokili, bitumba, mpe makambo mosusu ya mabe oyo ezali kobebisa avenire ya bato banso.

Bayambi, na tango ya losambo la Regina Caeli.
Bayambi, na tango ya losambo la Regina Caeli.   (@Vatican Media)

Mbela ya kozala na bokengi mpekotya motema

Liboso lya makambo maye, moko na moko ya biso asengeli komituna boye: “Nani tolingi atambwisa biso na bomoi bwa biso? Miyibi kani emekaki kokoto o lopango la biso? Bakotaki? To mpe tozwaki makasi ya kobengana bango?” Pàpa alobi ‘te: Nsango Elamu ezali kosenga na biso polele: na kotyela Mobateli ya mpate malamu motema. Ayei mpo na kobótólo te, kasi mpo na kopesa; mpo na kokitisa te, kasi mpo na kokólisa. Azali kopesa nzela na bomoi botondi na biloko bebo to meke.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

26 sánzá ya mínei 2026, 16:58