Pàpa azongeli mokano Eklezya aboyi mpo ya etumbu ya liwà
Bansango ya Vatikan
Lotómo ya kozala na bomoi ezali moboko ya ba lontómo nyonso mosusu ya moto. Na yango, bato bakoki kokola mpe kozala na bomoi malamu kaka soki bazali kobatela bomoi ya moto oyo ezali mosantu. Ndé na maloba maye, Léon XIV afungolaki elilingi (video) na ye na mokolo mwa mitano moye, na bato baye bayanganaki na DePaul University mpo na kokanisa mibu zomi na mitano ya kolongola etumbu ya liwà na Illinois, mboka na ye.
Longola maloba maye ya bokundulo mokano mwa Eklezya, oyo bakonzi oyo bazalaki liboso na ye bamonisaki yango mbala na mbala, Léon XIV, mpo na kondimisa likanisi na ye ya koboya etumbu ya liwa, alobaki ‘te “lokumu la moto ebungaka te, ata nsima ya makambo mabe koleka”. Lisusu, kosikolama ya bakangami oyo Catekisimo ya Eklezya Katoliko (Catéchisme de l’Église) elobeli, ekoki kosalema mpe ezali likàmà te mpo na bana-mboka, soki “mibeko ya malamu mpo na kokangisa bato na bolókó ekoki kotyama”. Na yango, alendisi ‘te “ekoki kobatela bolamu ya bato banso mpe kokokisa masengami ya bosembo kozanga kosalela etumbu ya liwa”.
Na mboka epai wapi bato tuku minei na sambo (47 personnes) babomamaki na 2025, motango mwa likóló banda mobù 2009, Pàpa ya Amerika apesi lisungi na ye na baye bazali kobunda mpo na “kolongola etumbu ya liwa na Amerika mpe na mokili mobimba”. Alaki losambo la yé, mpo ‘te moto na moto ayeba lokumu na ye malamu mpe ‘te likambo yango ya sembo epesa basusu batoli to malako.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
