Pápa asengi kozala na bososoli mpo na kosalela nguya ya ba bombi atomiki
Bansango ya Vatikan
O mokolo mwa 26 Aprili ya mobù 1986, na ngonga ya 1h23 ya ntóngó, motele ya minei ya centrale ya nikleele ya Chernobyl, pene na engumba Kiev, na ekólo Ukraine, etelemaki malamu te mpe yango ebimisaki likàmà oyo eleki makàmà manso masalemá na mokili mobimbana mpó ya nikleele. Awa ebetaki bombi eye, ebebisaki ndako mobimba, ebimisaki londende ya milinga ya nikleele na mopepe, mpe na nsima epalanganaki na Mpoto mobimba; ebebisaki bisika biyiké ya Ukraine, ya Biélorussie mpe ya Russie, bongo etindaki bankóto ya bato bábima na bandako ba bango.
Bato bànà, bazongakà lisusu bamboka ba bango te, mpe batikaki bamboka mosusu ya minene mpo na libela. Bongo tee lel’oyo, bato balobaka ‘te ezali “mabelé bato bakoki kofanda lisusu te”. Mpó na yango, bato bayiké babebisamaki na nzoto. Mingi mpenza lokola ndakisa, ezali ‘te; soki mwana abotami, akobima nà malformation ut’o libumu la mama wa ye. Na bokundoli mokolo moye “likàmà monene" mosalemaki, Pápa atomboli mongongo mpe atikaki na Mawa to Ngolu ya Nzambe, “baye banso bakufaki mpe baye bazali nayino konyokwama na ntina na yango”.
Bososoli mpe mokumba na lolenge ya kosalela enerji atomiki
Bokóli ya bitumba na Moyen-Orient mpe etumba na Zaporijia na Ukraine ezali kobakisa lisusu kobanga na mokili mobimba. Ezali bozangi libateli to bokengi ya ba réacteurs, mpe ya libota mobimba ya bato, oyo ezali na likàmà na nzela ya bibundeli ya nikleele. Yango wana Léon XIV alendisi mokumba ya bakonzi ba bikolo, alobi: “Nazali na mposa ‘te, na bisika binso bazali kozwa bikateli, bososoli mpe bontoki bozala ntango inso, mpó ‘te esaleli nyonso ya nguya ya nikleele, ezala mpo na mosala ya bomoi mpe ya kimya”. Pape alobi ‘te likambo tokundoli mpe “oyo etungisaki bososoli bwa bato” ezali kaka “likebisi mpo na makàmà ya kosalela ba tekinoloji ya makasi koleka”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
