Pápa apesi Patriarche ya Bakaladea ndingisa ya kokóta na Eklezya Katoliko
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
«Na esengo o motema, napesi bino Ecclesiastica Communio», ekomi Pápa na mokanda moko lokola eyano, ebimisamaki na mokolo mwa mibale, mwa 28 Aprili, na ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan, mpe epesami na mokonzi ya Bakaldea ya Bagdad, Paul III Nona, oyo aponamaki na mokolo mwa 12 Aprili 2026 na Roma na likita lya baepiskopo ya Eklezya na ye sui iuris.
Na ebandela, Patriarche akomaki mokanda mpo na kosenga, na kolanda Canon 76 § 2 ya Codex Canonum Ecclesiarum Orientalium, kopesa ye communion ecclésiastique. Pàpa akomi ‘te, «ezali elilingi mpe lien ya komunio mobimba elongo na Siege Apostoliki, na mosala ya bomoko ya Eklezia mpe mpo na kotonga Nzoto ya Kristu». «Nazali na esengo ya kotombola mabondeli na ngai mpo na yo, mpo ‘te, lokola ozali Tata mpe Mokonzi ya Eklezya Sui iuris, osalela yango na bosembo nyonso, lolenge mosala mopesameli yo, mpo na kokamba bat oba Nzambe lolenge elongobani na motema mwa Kristu. O lendisa bango na kondima, na elikya mpe na bolingo», elobaki Pàpa Leon ya XIV. Nganga Mokonzi Monene abeleli Elimo Santu mpo asunga mosala oyo Mokonzi Patriarche asengeli kokokisa, mpo ‘te Lingomba ya Kaladea, oyo ezali na bomengo ya bonkoko ya bantóma mpe oyo etondi na litatoli kitoko ya bamartyro bayiké mpe ya basakoli boyambi, ekoba kobota mbuma na mosala ya kosakola Nsango Elamu. “Ezali kolendisa bomoko ya lisangá to eklezya na mboka na bango mpe ezali se kobakisama na kati ya bato oyo bazali na mikili mosusu”.
Na nsima, Léon XIV atindaki mbote na baepiskopo oyo bazalaki basangani ya Synodi, na bakonzi ya mangomba, na basángó mibali mpe basi, na baseminele, na bato baye balingi kokóma basángó, mpe na balayiki. Akundoli ‘te maponami maye masalemaki o “mokolo wapi ba-Kaldea basalaka molulu ya kokundola bokutani bwa Kristu oyo asekwi nà Santu Tomasi, lokola ezali ezalela to momeseno ya bonkoko ya bomoyi bwa eklezya eye”. Na bapota ya Yezu oyo ezali kongenge, Tomasi amonaki “ Ngolu ya Mokonzi mwa yé”. Na yango elikya ezali ‘te Nzambe akosunga mosala ya mosantu mwa ye, na elembo ya boyambi, oyo ezali kosenga mpiko mpe bompikiliki ya bayambi bayiké ya Lingomba ya Kaladea oyo, lokola bandimi ya solo-solo, bazali kobunda na kolonga lolendo lya Eklezya, oyo mbala mingi etungisami na mimekano makasi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
