Pápa akei kotala lopitalo ya Katoliko ya Saint-Paul na Douala
Bansango ya Vatikan
Na mobembo mwa ye na Cameroun, Pàpa, atako manaka ya mobembo mwa ye motondi na misa mpe na makita, aponaki kokende na Ngul Zamba, ndako ya bana-bitike na Yaoundé, mpe na lopitalo ya Katoliko Saint-Paul na Douala. Na mokolo ya mitano, mwa 17 avril, nsima ya misa oyo asalaki na stade Japoma na Douala, engumba-mokonzi ya nkita ya mboka. Léon XIV apesaki lisungi mpe libondisi na bato ba maladi ya lopitalo oyo esalemaki na 1971 na bamamelo, ba Sœurs Servantes de Marie mpo na kosalisa bato bàzali na likàmà mpe mpasi. Elongo na mokambi ya lopitalo, akendaki kotala biteni mingi ya lopitalo. Na lopitalo yango, oyo epesami na Archidioseze ya Douala, mpe ezali na quartier ya Bassa, Pàpa akendeki na ndako-nzambe mpe apesaki mbote na bato ba mosala mpe bato basusu ya maladi.
Elembo ya Bobóndi
Mokolo na mokolo, basali basalaka makasi mpo na kopesa bato lisalisi lya malamu kasi bapemaka te. Bazali kopesa likebi mingi, nayino na basi. Na mokolo mwa mitano, bato basusu ya maladi bazwaki libakù ya kosimba-simba lobókó la Nganga-Mokonzi Monene oyo, na boboto nyonso, ayokaki mpasi mp ona minyoko ya bana mike mpe ya mikóló. Yambo ‘te apesa mbote na maladi moko na moko, apesaki bobenisi bwa ye, na bango banso, ná mabota ma bango.
Ba mpota ya molimo mpe moye mwa nzoto
Nsima ya losambo la Tata wa biso, Nganga-Mokonzi Monene akótaki na biteni bya lopitalo epai wapi bazalaki kosalisa bato ba bokono to bamaladi. Asololaki na bana mpe mibangé. Na yango, kozala ya Mokitani ya Petro, ezali kosimba bampota ya etumba mpe ya nzoto; ezali kokitisa mpasi oyo ya mozindo mpe ezali kopesa kobikisama ya molimo mpe ya nzoto. Na nsuka ya mobembo mwa ye, mwa moke liboso ya ngonga ya 14h00, Pape Léon ya XIV akendaki na aéroport na Yaoundé, epai asengelaki kokutana na bayekoli mpe baye ya eteyelo ya likolo to Université ya katoliko ya Afrique centrale na mpokwa.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
