Na miniti moko, mokolo mwa mitano ya Leon ya XIV na Afrika

Mokolo ya misato ya Pàpa na ekolo Cameroun, nzokande ezali mokolo mwa mitano ya mobembo mwa ye na mabele ma Afrika. Mokolo moye mozali mokolo oyo alongwaki na Yaoundé mpo na kokamba misa na Douala, kino tango azongaki na mboka-mokonzi ya Cameroun mpe akutanaki na bato batangaka na eteyelo ya likóló to Université.

Bansango ya Vatikan

 

Léon XIV alungwaki na Yaoundé na mokolo mwa mitano na ntóngó mpo na kokende na Douala, esika ya nsuka ya mobembo mwa ye na Cameroun. Na ngonga ya 9h24 ya ngonga ya mboka, Leon akitaki na aéroport international ya engumba oyo ezali na bato koleka na mboka, mpe asalaki misa na stade ya Japoma, liboso lya bayambi koleka 120.000. Na nsima, Nganga-Mokonzi Monene akendeki kotala bato ya maladi na lopitalo ya Katoliko Saint-Paul, atako ezalaki na manaka ya mobembo mwa ye té. Na nsima, azongaki na aéroport mpo na kozonga na Yaoundé. Ntango azongaki na engumba-mokonzi, akutanaki na bato ya eteyelo ya likolo to université na ndako ya UCAC, oyo elimboli: Université catholique d’Afrique centrale na ngonga ya 17h30, ngonga ya mboka.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

17 sánzá ya mínei 2026, 23:15