Na miniti moko, mokolo mwa misato ya Léon XIV na Afrika
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Léon ya XIV akómaki na Cameroun na mokolo mwa misato, mwa 15 Aprili, nsima ya nzanga, mpe na kokóba mobembo mwa ye na Afrika. Ayambamaki na Paul Byia, mokonzi ya ekolo, oyo asololaki na ye na bonkuku. Asololaki mpe nà bakonzi ya mboka mpe nà ba corps diplomatiki to bato ba misala ya boyokani na mikili misusu. Asengakaki na bango ‘te “bàkatisa minyolóló mya kanyaka” mpe akundwelaki bango ‘te, kosalela bokonzi ezali liboso kosalela basusu.Mokitani ya Petro, akendeki mpe na ndako ya bitike, oyo ekambamaki na ba mamelo Filles de Marie ya Yaoundé, mpo na kosolola nà bilenge oyo bazali na likàmà koleka mpe koyebisa bango ete Nzambe azali kobenga bango na mikolo mizali koya, mikolo oyo eleki mpasi to ba mpota na bango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
