Na miniti moko kaka, mokolo mwa yambo ya Léon ya XIV na Algérie

Mbula ebetaki mpe eyambaki Léon XIV tango akendaki na Algérie, teleme to etapi ya liboso, mpo ya mobembo mwa ye bontómà na Afrika. Ut’o akómaki Pàpa, oyo ezali mobembo mwa ye ya mbala ya misato. Ezali mpe mobembo moye mozali na boyokani makasi nà mateya ma Augustin ya Robert Prévost.

Sima ya kotika mboka Roma o mokolo mwa 13 ya Aprili mpe ya kopesa mbote na bitukà motobà ya bapanzi-nsango baye bazalaki na ye elongo o kati ya mpepo, Nganga-Mokonzi ayambamaki na mokambi to nkumù ya mboka Algerie, Abdelmadjid Tebboune. Pàpa asàmbelaki mwa ngonga moke libolo lya Maqam Echahid, elembo eye basali kala mingi te mpo na kopesa limemya na ba Martiro ba Algerie. Apesaki bango nsango ya elikya, mpamba te, mokili moye mozoki na bamatata mingimingi.

Na bonkuku, akendaki sima na ndako El Mouradia, esika wapi akutanaki na Mokambi ya ekolo, yambo ‘te asolola elongo nà bakonzi ba mboka. Apusaki bang ona mbongwana na lombango ya cap, liboso lya bamatata mingimingi ezali sé kobakisama. Na nsima episkopo wa Roma abondelaki mpo na kolendisama ya bokoli bwa masóló, mpo na bosembo mingi kati na bato, mpe mpo na bokonzi boye bozangi likanisi to lolenge malamu lya koyangela. Nsima ekandeki kotala Mosque Monene ya Alger, mpe Pape akutanaki na bato ba Algérie na Basilika Notre-Dame d’Afrika.

Esukaki bongo mokolo mwa yé ya yambo na Afrika.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

14 sánzá ya mínei 2026, 21:01