Na Algérie, Léon XIV alóni mbóto mpo na mikolo mizali koya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na boumeli bwa ngonga tukù minei na mwambé (48), Algérie esili koyeba mpo na mbala ya yambo nani nde azali mokonzi mwa Eklezia katoliko, mingi mpenza bayebi nani Leon XIV azali. Moto moye ayaki na mobembo mwa kimya na mboka oyo wapi bato mingi koleka, ezali bazali ba-mizilma. Azali mpe moto oyo mbala mingi, azalaki kopesa longonya na ezalela ya bonkoko ya boyambi mpe ya koyeba koyamba bapaya. Na maloba maye nde, atandaki loboko la yé mpe abyangaki na kokolisa o bozindo molimo ya bokutani, mpamba té, elobi ye, ezalaki ezalela mokitani mwa yé François. Tóyeba kokutana mpe tómeka koyokana, bongo tokoyeba ‘te tozali libota moko! Ezalaki ye ko belela liboso lya bakonzi ya Alger (lançait-il devant les autorités).
Likanisi lya motuya ya mobembo moye, ezali «Boboto bozala na bino». Alobaki yango ut’o lininisa lya Saint-Pierre, mbula mobimba. Devize oyo na lokótà lya arabe elimboli «Asalam aleikoum», mpe elakisi nayino limemya mpe kozwa to kopesa moto kilo. Lokola mwana ya Saint-Augustin, Pape azalaki ntina ya lolendo to lokùmù mpo na bato ba Algérie, mpe ntina ya libondisi mpe ya elendiseli mpo na Eklezia ya moke ya mboka, Eklezia ya Afrika oyo elongwaki mpenza na mwa bambula moke. Likambo oyo ya Algérie ezalaki nde ya kolakisa boni boni Lingomba ya Katoliko na mboka ezali kosala mpo na boyokani mpe bosembo, mpo na bato baye bazali na makoki mingi te mpe ekangami na boyokani nà ba Musulmans. Na Bab El Oued mpe na Notre Dame d’Afrique, Bakristu mpe Bamizilma bamonisaki lolenge kani bazali kotambola elongo nà lisalisi lya Nganga-Mokonzi.
Tokotonga elongo eloko moko
Na Annaba, na kolanda ndakisa to matambe mwa tata wa ye ya molimo, Saint Augustin, Léon XIV abyangemi na kokóba kozala nzeneneke ya Nsango Elamu mpe kokóba kopalinginya solo ya malasi ma ye, oyo ezali komema “esengo mpe libondis” na bandeko bayiké ya mibali mpe ya basi. Papa asengaki na bakristu ya Algerie (aura lancé à ces chrétiens algériens une exhortation à «renaître d’en haut»), babotama lisusu na molimo, mpe kokomisa mikakatano mya kala, lokola elembo ya bomartiro, mboto mp ona mikolo mikoya. Mpo na Eklezya ya Algerie, boyei bwa ye bozali liziba lya nguya mpo na mikolo mizali koya, elobi José Cantal, misionele moko ya Afrika, afandaka na Adrar, na ntaka ya bakilometele 1.500 longwa na Alger. “Tozali ya kopalangana na bisika ndenge na ndenge, nzokandé tozali na mpasi kozala na bokutani”, elobaki sango moko ya Espagne oyo asalaki mobembo ya bangonga tuku mibale na mibale (22h) na mutuka mpo na kokóma na mboka-mokonzi. “Mobembo moye mokobongola makambo, tokokoma na bomoko lokola naino ezalaki te”, ekobaki ssàngó Cantal.
Lokola Eklezya oyo ezali na elongi ya Afrika, Bakatoliko oyo bafandi na Algérie babombaki mbongo na bango mpe batambolaki bankama ya bakilomele mpo na kokutana nà Pápa. Mingi na bango, bazali bilenge biye bazali kotanga na baeteyelo ya likolo ya Algerie. Mingi mingi, bato bakaniselaka bango mabe to mpe koyina bango mpo bazali bakristu. Nazali kolikya ‘te nsima ya mobembo moye, tokozala na bonsomi mingi ya koloba mpe ya kofanda na boyokani na ba mizilma, mpo mbala mingi soki olobi ozali mokristu, bato batalaka yo mpe batunaka, “Kasi mpo nini ozali mozilma te? Ezali pasi mingi”, elimboli Daphine Apio, oyo atangaka na engumba ya M’Sila, na kati kati ya mboka. Mpe maloba ndenge na ndenge, malobamaki se lokola bongo. “Mobembo oyo ekomema mbuma mingi, elobaki elenge ya Burundi, tomonaki ‘te Pape azongaki na mosquée monene ya mboka mpo na kosolola na imam, mpe nayebi ‘te bato ba Algérie bamoni likambo liye, bakososola ‘te tozali na mokano moko, tosambelaka Nzambe se moko”.
Mobembo mobandi sika
Ntembe te, likambo liye lisimbaki mpenza motema ya Jean-Paul episkopo wa lokumu Vesco, ezali boni boni Léon XIV akendaki kotala Mosquée Monene. “Komona Pàpa elongo nà mokambi ya mosquée bazali kotambola pembeni na kati ya kimya ezali elilingi ya makasi mpenza mpo ezali eloko ya pamba te engebene na Archeveki ya Alger. “Sik’oyo mobembo mobandi, tango Kardinale ya Républiki dominicaine azali kokende, na elikya nyonso, na esengo nyonso. “Sikoyo tobandi kososola eloko kani esalemi, tozali kofanda na mboka na ntango molai. Mobembo mwa Pápa ezali bobenisi to lipamboli, ye mpenza aloni”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
