2026.01.08 S. Misa elongo nà ba episkopo wa lokumu , bayangani ba likita linene 2026.01.08 S. Misa elongo nà ba episkopo wa lokumu , bayangani ba likita linene   (@Vatican Media)

Mpo na Pápa, etindà ya Eklezia ezali ya kopalinginya bolingo bwa Nzambe

Na mokanda atindelaki ba episkopo wa lokùmù mpo na likita linene oyo ekosalema na sànzà ya Yuni, Léon XIV asengaki ‘te bátalela malamu makambo mazali na «Evangeli Gaudium», mingimingi mbongwana ya etamboli ya koyekola kokóma mokristu. Na nsima, abakisaki ‘te mosala mwa Eklezia «ezali ya kosakola polele, ya kopesa litatoli, ya komipesa mpe ya kosolola. Ekomitika na masenginya ya kobongola bato na lingomba to na likanisi ya kobatela to kokólisa ba institutions».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa lomingo, mwa 12 Aprili, Pápa Léon ya XIV atindelaki baepiskopo wa lokùmù mokanda mpo na kopesa bango matondi na ndenge bayaki na likita ya liboso oyo esalemaki na Vatikan na mokolo mwa 7 mpe 8 ya sànzà ya Yanuali 2026. Lisukulu yango elobelaki mingi makambo ma bosangani (sinodi) mpe mosala mwa yango. Mokanda yango etindamaki liboso ya liyangani ya mikolo mibale oyo ekosalema na Vatikan na mokolo mwa 26 mpe 27 Yuni, mwa moke liboso ya Eyenga ya Basantu Petro mpe Polo. Mpe ekosuka, nà milulu mya Ukaristya oyo Pàpa Léon ya XIV akokamba. Pàpa akomaki ‘te asepelaki na mosala moye esalemaki na bituluku na ndenge ya bonsomi mpe ya malamu. Yango nde etongi “libula ya motuya mingi” elobi Nganga-Mokonzi - Nazali na mposa ya kokóba kobatela yango mpe ya kokólisa yango o kati na bososoli na lingomba.

Molimo mwa sika ya kosangela nsango

Na nsima, akanisaki na Evangelii gaudium, mokanda mwa Pápa François oyo ebimaki na mobù 2013 mpe elobelaki mosala ya kosakola Nsango Elamu na mokili mobimba. “Masungi ma bino” emonisi polele ‘te malendisi mànà mazali kokoba kozala elembo ya ntina mingi. Ezali te bobele kobakisa makambo ma sika, kasi ezali kozongela kerygme lokola motema ya bomoto ya mokristu mpe ya Eklezya. Pàpa alobeli “mpema ya sika” ya solo, oyo ezali na makoki ya kobanda misala mya mbongwana ya babateli mpate mpe ya bamisionele, “na esika ya kobimisa mbongwana ya mbalakaka na kati ya Eklezia, na ndenge yango, ezali kolakisa o bozindo nzela ya Eklezia”.

Emoneli to likanisi lya sika

Pàpa akobaki na koloba ‘te: ezali likanisi lya sika oyo ezali kopalela Eklezia na bisika binso. Ezali kobenga moto na moto oyo azwi libatisi, alungwa na boyambi azwaki mpo na koleka na boyambi oyo ezali na bomoi. Ezali se na nzela ena. «Ezali mpe kolobela lolenge mpenza ya bomoi bwa elimo, na ntina ya losambo, na litatoli oyo ezali liboso lya maloba, mpe na boyokani kati na boyambi mpe bomoi». Na kotalela ba dioseze, Léon XIV asengi na ba pasteurs “basunga mpenza mpiko ya bamisionele. Basala ‘te bakóma na bozito te to bakangama te na ba organisation oyo eleki ndelo. Mpe ekolendisa bososoli oyo ezali kosalisa mpo na koyeba eloko kani ezali ya ntina”.

Misio ya mobimba

Pápa akundoli ‘te; na lolenge wana nde “mokumba mwa bomoko emonisami mpenza o mozindo” : kotya Kristo o katikati ya bomoi bwa biso (Christocentrique) mpe kerigmatiki  oyo ebotami na “bokutani elongo na Kristu oyo akoki kobongola bomoi mpe oyo azali kopalinginya na nzela ya kobenda bato na esika ya kolonga bango. Mokanda yango elobaki ‘te mosala yango esengeli kozala ya mobimba, “esengeli kozala na boyokani”, “esengeli kozala Nsango oyo ezali komonono polele, ezali kotatola, komipesa mpe kosolola, kozanga kokwea na komekama ya koluka bandimi ya sika to kolanda kaka makanisi ma kobatela to kobakisa misala mya lingomba”.

Kozala na kozanga mitungisi

 “Ata soki andimi ‘te azali na kati ya bato moke” elobi Nganga-Mokonzi, Eklezya esengeli kozala na makanisi ma mindondo te, lokola etonga moke oyo ezali komema elikya mpo na bato banso, na nsima ya bambula ebele, makambo nini bazwaki mpenza mpe makambo nini basalaki te, mpe “esengeli kotya likebi na mbongwana oyo esengeli kosalema na nzela ya mateya mpo ya kokóma mokristu”.

Léon XIV alendisi mpe bato bápesa motuya na mibembo ya bontóma mpe ya pastorale “lokola mabaku mya bososoli mpo na kosembola bato mpe kokolisa bondeko bwa bolamu”; na oyo etali kosolola na kati ya lingomba, amonisi ‘te esengeli kotalela lisusu malamu ya kosolola na kati ya lisangá, “mingi mpenza na esika Saint-Siege, na lolenge ya polele koleka ya mosala ya misionere. Mokanda mwango esuki na matondi mpo na mosala mpe likabo na ye na Eklezia mpe etindi na lisanga ya bato oyo bakoya nsima, na mokolo ya 26 mpe ya 27 ya sanza ya Yuni, mpe ayebisi ‘te “nsango moko ya mozindo mpenza ekolanda na nsima mpo na kopesa nzela na kobongisa yango malamu ».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

14 sánzá ya mínei 2026, 21:26