Mokolo mwa zomi ya Pàpa na Afrika, na miniti moko

Léon XIV alongwaki na Malabo o mokolo mwa misato mpo na kokende na Mongomo mpe Bata, bingumba mibale biye bizali na mokili ya Guinée équatoriale. Mokolo mwango mozalaki na molulu mya Ukaristya, kokende kotala bolókó moko mpe na mpokwa, bakokutana nà bilenge mosusu mpo na kosepela.

Bansango ya Vatikan

 

Na mokolo mwa misato, mwa 22 Apríli, mokolo mwa liboso ya nsuka ya mobembo mwa ye na Afrika, Léon XIV akutanaki na bato ya Guinée équatoriale. Na engumba ya Mengomo, asalaki misa mpe na kati na yango asengaki na bakristu bàzwa mokumba na bango moko mpe ya mboka na bango na maboko na bango; kozwa esika ya bamisionele ya liboso oyo bayaki kosakola Nsango Elamu na esika wana mibu 170 mileki.

Na nsima ya nzanga na Bata, engumba oyo ezali pembeni ya mai monene mpe oyo ezali na bato mingi koleka na ekólo eye, atelemeki na bolókó moko oyo ezali na kati ya baboloko ya makasi koleka na ekólo eye, mpe akundwelaki bato na boloko ‘te “moto moko te akoki kozanga bolingo bwa Nzambe”. Mpe ‘te “nsima ya likambo moko na moko ezali na lisolo ya moto, oyo esalemi na mabunga mpe mikakatano, kasi mpe na mabaku ma mbongwana”. Lokola mbula ya makasi ebetaki na engumba, Pàpa akobaki mobembo mwa ye, na ntango ya losambo ya kimia liboso ya monima ya bato baye bakufaki na mokolo mwa 7 sanza ya misato 2021. Na mokolo wana, ba explosion mingi esalemaki na ba caserne ya basoda ebomaki bato 107 mpe bato koleka 600 bazokaki. Bato ya Guinée Équatoriale batungisamaki mingi.

Na suka, mokolo mwango mosukaki na esengo mingi, na stade ya Bata, epai bato koleka 50 000 bayambaki na esengo mpenza Tata Mosantu. Bokutani elongó nà bilenge ezalaki ntango ya bolakisi, ya litatoli mpe ya boyoki. Léon XIV asengaki na bilenge ‘te bátika Kristu akota na bomoi bwa bango, na makambo manso ya bomoi bwa bango. Tika ‘te tosepela na kitoko ya bolingo oyo Yezu apesaki mpe ateyaki biso! Tika ete mokolo na mokolo tomonisa kitoko ya bolingi, ‘te esengo monene, na makambo manso, ewutaka na makoki ya kopesa mpe ya komipesa, mingi mpenza ntango tomipesi na baoyo bazali na bosenga makasi. Mwinda mwa bolingo, moye molonami na bandako mpe oyo ezali na boyambi, oyo ekoki mpenza kobongola mokili, ata mpe bibongiseli na yango, mpo ‘te moto nyonso azwa limemya mpe babosana ata mótó moko te”, elobaki PNganga-Mokonzi Monene.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

23 sánzá ya mínei 2026, 22:42