Mokolo mwa sambo ya Pàpa na Afrika, na miniti moko
Bansango ya Vatikan
Na Kalimba, na libándá ya engumba-mokonzi Luanda, Léon XIV asalaki misa na tóngó ya mokolo mwa Lomingo, mwa 19 Apríli. Liboso lya etulùkù lya bato bayiké bayaki, kopesa ye longonya mpe bakabolaki Ukaristya elongo na yé, Tata Mosantu abengaki bakristu ya Angola na komona o elongi ya Mokonzi wa biso oyo asekwi, elikya ya kozala elongo na bango mpo na kotonga lisanga y abato (societe) etondi bolingo mpe koyeba kolimbisana, mpe bisika bya bondeko mpe ya kimya.
Na kosala mobembo ya bakilometele nkàmà moko nà tùkù misato (130 km) oyo ekaboli Luanda na Muxima, na mpepo ya hélikotele, Molandi ya Petro akambaki losambo la sapelé, mibombamo mya Nkembo, na Sanctuaire ya Maria ya Muxima. Esika eye ya losambo mp ona kopesa lokumù na Maria, eleki monene mpe ezali esika baleki nzela bakenda mingi mobembo o mboka. Bato nkoto tukù misato (30 000) basambelaki elongo na Tata Mosantu, mingi kati na bango bilenge. Na nsambo ya ye, Pàpa abyangi na “kolinga moto na moto na motema ya bomama, na lolenge ya solo mpe ya bokabi” mpe komipesa “mingi mpenza na babólà”. Mingi mpenza na koloba nà bilenge, alendisaki bango, “bátonga mokili moko ya malamu koleka” epai wapi “kozanga bosembo ekozala lisusu te”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
