Mokolo mwa libwà ya Pàpa na Afrika, na miniti moko
Bansango ya Vatikan
Na mokolo mwa libwà ya mobembo ya Pápa Léon XIV na Afrika, asalaki mobembo na Angola mpe na Guinée équatoriale. Kobanda na Luanda, Nganga-Monene akendaki na Malabo, epai wapi akitaki na libándá ya mpepo ya mokili mobimba mpe bayambaki ye na lolenge ya bibzaleli to momeseno mya bonkoko. Nsima ya kotala mokonzi ya mboka, Teodoro Obiang Nguema Mbasogo, Pápa akutanaki na bakonzi ya mboka. Alendisaki bango, bábebisa nkombo ya Nzambe te mpo na kolóngisa bikateli to mikano mya bango mpe misala ya koboma bato. Na nsima, azwaki mwa ngonga moke ya koliya na ndako ya Archeveki to episkopo-mokonzi, episkopo wa Roma akendaki na eteyelo ya likolo (iniversite) oyo ezali na nkombo na ye, Pape Léon XIV.
Epai kuna, akutanaki nà batindami ba mokili bya mimeseno to ezalela ya bonkoko. Alendisaki ba-universités bàtombola kokende liboso na bomoko na nzela ya mateya.
Eteni ya suka ya mobembo mwa ye ezalaki bokutani nà basàli mpe bato ba bokono bya mótó (psychiatiki to maladi ya makanisi) na lopitalo ya Jean-Pierre Olié: “Nzambe alingaka biso lolenge tozali”, elobaki mokitani ya Petro na nsango na ye epai na bato oyo bazalaki wana. Mokolo mwayango mosukaki na likita moko ya bonkuku, mpe na nsima balyaki elongo na baepiskopo ya Guinée Équatoriale.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
