Mobembo mwa Leon XIV na Afrika, na bilili

Na mobembo mwa ye ya misato na Afrika, oyo ebandaki na mokolo mwa 13 ya sànzà ya Aprili, Leon XIV akendeki na bisika ndenge na ndenge, na ndakisa na Algerie, epai wapi apesaki lokumu na Augustin, na Misa na engumba Malabo, na ekólo Guinée Équatoriale, alekaki na Cameroun, mpe na Angola.

Bansango ya Vatikan

 

Oyo ezali makambo minene mpe ma ntina ya mobembo ya misato ya Pápa Léon XIV, oyo ememaki ye na mikili minei: Algérie, Cameroun, Angola mpe Guinée équatoriale. Mayangani ya bainstitutions mpe ya mangomba misusu, kosolola na mangomba ya mboka, bilenge, mabota, bato ya mimeseno ya mboka, bato ya bolóko, bato ya maladi mpe mibange: nyonso wana ezalaki mabaku ma komonisa ‘te Kristu azali na esika monene mpe ya koteya nsango ya kimya oyo euti epai ya Tata Mosantu.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

23 sánzá ya mínei 2026, 22:56