Léon XIV amati na mpepo, azali kokende na Afrika, ebandeli ya mobembo mwa yé ya bontómà mpo ya mbala ya misato.
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
Boyei malamu liboso lya komata na mpepo ya ITA Airways, mpe na sima na ngonga ya 9:07 na tongo, amataki na mpepo ya Roma, na aeroport ya Fiumicino, mpo na kokende na Afrika, epai wapi akofanda kobanda mokolo mwa 13 kino mokolo ya 23 ya sànzà ya Aprili. Pàpa akokóma na Algérie na ngonga ya zomi to 10h00. Azali Pàpa ya yambo oyo akokende na mboka eye. Ekabolami na ngonga moko liboso nà Italie. Eteni ya liboso ya mobembo mwa ye ya mbala ya misato ya mosala to misio, na ndakisa ya Saint Augustin, liboso akende na Cameroun, Angola mpe Guinée équatoriale.
Ndulu mpo ya mokolo monà
Na sima ya molulu mya boyambi, Léon XIV akopesa lokumu na Monima ya ba Martiro, Maqam Echahid, oyo efungwamaki na mobù 1982 mpo na libakù lya bokundoli mibù tuku mibale ya lipanda na yango. Ndulu ya mokolo moye mwa 13 aprili epesami boye : Kokende kotàla Mokambi to nkùmù ya ekolo (Président ya Républiki) mpe, ekozala nà bokutani elongo nà bakonzi, société civili mpe corps diplomatiki. Na sima ya nzanga, Pàpa akokende na Moské Monene ya Alger, mpe na sima akokende kotàla Centre ya boyambi mpe bondeko ya ba Mamelo ya Saint Augustin (sœurs missionnaires Augustines) ya Bab El Oued. Esika etongamaki mpo na kokundwela basàngó mibale oyo babomamaki na mokolo mwa 23 Okotobe ya mobù 1994, na ntango ya etumba ya bana-mboka na Algérie. Mokolo mwangó mokosuka na bokutani nà bato ba Algérie.
Bondeko na boyambi
Kati na telegrame oyo atindelaki Sergio Mattarella, mokambi ya ekólo Italie, tango azalaki na mpepo, Pápa apesaki ye mbote mpe alakaki ye mabondeli «mpo na bolamu mpe bomengo bya bato banso ya Italie». Alobeli mpe mobembo mwa ye oyo akosàla na mikili minei, mpamba te, azali na «mposa makasi ya kokutana elongo nà bandeko kati na boyambi mpe na bato ba mikili binà».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
