Luka

Papa Léon XIV na likita lya banso ya 29 ya sanza ya minei 2026 Papa Léon XIV na likita lya banso ya 29 ya sanza ya minei 2026  (@Vatican Media)

Likita lya bansó: Léon XIV na molobeli ya boboto akoloba mobémbo na ye n'Afrika

O eleko ya likita lya bansó ya mokolo ya misáto eye ya 29 ya sánzá ya minéi, esika ya Sántu-Petelo, Papá Léon XIV azongelaki mobémbo na ye ya bontómá ya sika, ya molayi mpe ya lisapo n'Afrika, eye ememaki ye n'Algérie, na Cameroun, n'Angola mpe na Guinée équatoriale. Mobémbo mókó eye alakisaki yangó lokolá «nsango yókó ya boboto» na eleko yókó ya mokili ezali na elembo ya bitumba, ba bobéndani mpe ya bobuki na makási mpe mbala ebelé sémbo ya mokili.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Na bolobi na bandimi ebelé basangani na esika Sántu-Petelo, Tatá-Esántu alobaki 'te mobémbo ená ezali o káti ya ba mwángo na ye ya ebándeli lokolá Mokitani ya Petelo mpe Mobateli ya bato ya Nzámbe: «Úta ebándeli ya mosála na ngai, nakanisaka mobémbo mókó n'Afrika». Abimisaki matondo na ye mpo na libakú ená, alekisaki «lokolá Motéi, mpo ya kokutana mpe kolendisa bato ya Nzámbe», kasi lokolá «nsango yókó ya boboto na eleko yókó ya lisapo ezui elembo ya bitumba mpe na bobuki na makási mpe mbala ebelé sémbo ya mokili». Papá apesaki melesi na baepiskopo mpe na bakambi ya bikóló mpo ya boyambi na bangó, na lokolá baye bansó basálaki na bobongisi botáli ená ya bontómá.

N'Algérie, bagbagba káti ya ba bonkoko mpe biyamba

Etapi ya yambo ya mobémbo, Algérie alataki ndimbola yókó ya ye mókó mpo ya Papá Léon XIV. Amonaki kúna libakú ya «kobánda lisusu na misisa ya loléngé na ye ya molimo» mpe ya kotónga bagbagba ya ntina: «gbagba na eleko ya boboti mbuma elamu ya Tatá ya Eklezia, gbagba na mokili ya islam» mpe «gbagba na mokili y'Afrika».

Na nsakola ya ye, Papá wa Roma alobaki ntina ya kobika -lisangá, na bolobi 'te «ekoki kosálema kobika lisangá lokolá bandeko ya babáli mpe ya bási, atáko biyamba bikeseni, ntángo tokomiyeba lokolá bána ya Tatá kaka waná ya mawa». Litatoli ya sántu Augustin, ebakisaki Tatá-Esántu, etikali «na nzebi na ye ya bomoí, ya makomi na ye mpe ya molimo na ye, motéi mókó na bolukiluki ya Nzámbe mpe ya bosóló».

Cameroun: mbela mókó ya boyókani, ya bosémbo mpe ya bokaboli malámu

Na Cameroun, Papá alobaki lisusu mbela na ye ya boboto na ekóló: «mbela na bisó ya kosála lisangá mpo ya boyókani mpe boboto, mpo ekóló eye ezui na mawa elembo na bobéndani mpe ya mobúlú». Na bolobi nkita mpe makambo ya loléngé na loléngé ya ekóló eye ebengama «Afrika ya moke», Mokitani ya Petelo alobaki mikakatano ya makási: «bokaboli bokó elongobami ya bankita te, eye ya kopesa bilenge esika na bangó, ya bolongi kanyáka eye ezali makási; eye ya kotómbola bomátisi bokó ya mobimba mpe ya sékó, na bokutanisi ba loléngé bikeseni ya colonisation ya sika na bosálisani bokó ya mokili».

Angola: Eklezia yókó ya «bonsómi mpo ya bato lya bonsómi»

N'Angola, ezua elembo ya lisapo lyokó ya bitumba, Tatá-Esántu atiaki polélé ekela ya Nzámbe oyo «akambaki mpe apétolaki Eklezia, na bobongoli yangó na mosála mingi ya Nsango-Ndamu, ya bomátisi bomoto, ya boyókani mpe ya boboto». Na sanctuaire ya Mamã Muxima eye elingi koloba «Mama ya motéma», bokási ya boyambi ya baí-Angola etutaki Papá:

“«Namonaki na esengo ba mamelo mpe basáli ya Nzámbe ebelé ya mibú nionso, ...namonaki bakatekisi baye bamipesa mobimba na bolámu ya masangá; namonaki bilongi ya bakolo na bilembo ya bolembi mpe ya pási, kasi bakongenge na esengo ya Nsango-Ndamu; namonaki bási mpe babáli kobina na bolandi baloyémbo ya nkembo ya Mokónzi asékwi, ntina ya elikya yókó eye ekobunda na bamawa bisálemi na makanisi mpe na bilaka ya lokutá ya bato bazali na nguya».”

Tatá-Esántu alobaki lisusu 'te elikya ená ekosenga «bomipesi ya sóló, mpe Eklezia ezali na mokúmbá, na litatoli na ye mpe na nsakola ya mpiko ya Liloba ya Nzámbe, ya koyéba mibéko ya bansó mpe ya kotómbola botosi», mpenza na makambo ya bokólóngónó mpe ya botéi.

Guinée équatoriale: bato babaluka na ngambo ya elikya

Etapi ya súka ya mobémbo, Guinée équatoriale apesaki na Papá nzebi yókó ya elembo epikama na mibú 170 ya bopalinginyi Nsango-Ndamu. Papá alobaki boyambi ya bomoí ya bato ya Guinée équatoriale, baye «bazongisaki sika na esengo yókó enéne mpósá na bangó ya kotambola lisangá epái ya lobí lyokó ya elikya».

Papa Léon XIV na boloko ya Bata
Papa Léon XIV na boloko ya Bata   (ANSA)

Káti ya bileko makási ya etapi eye ya Guinée équatoriale, Tatá-Esántu atangaki botáli ya boloko ya Bata, esika wápi bakangemi bayembaki mpe basámbelaki «na nsé ya mbula ekobeta», na eye ye abengaki «elembo ya sóló ya Bokónzi ya Nzámbe» na bosengi na Papá ya kosámbela «mpo ya masumu na bangó mpe bobimi na bangó». Mpe bokútáni na bilenge na esika ya lisano ya Bata ezuaki lokolá elembo ya «feti yókó ya esengo ya bokristu, na matatoli ya kopasola motéma ya bilenge baye bazui na Nsango-Ndamu nzelá ya bokoli na bonsómi mpe na mokumba», na botatoli boyambi bokó ekoki kobongola ba bomoí.

«Nkita yókó ezangi motángo» mpo ya Eklezia

Na bosúkisi, Papá Léon XIV alobaki ntina ya mobémbo eye mpo ya baí-Afrika: «mobémbo ya Papá ezali, mpo ya bato y'Afrika, libakú ya koyókisa mongongo na bangó, ya koloba esengo ya kozala bato ya Nzámbe mpe elikya ya lobí lyokó ya malámu koleka, ya lokúmu mpo ya mókó mókó mpe mpo ya bansó». Tatá-Esántu alobaki ye-méi azuaki «nkita yókó ezangi motángo» na nzelá ya bokútáni ená, eye eléisi ministeli na ye mpe elikya na ye mpo ya Eklezia ya mokili.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

29 sánzá ya mínei 2026, 16:32