Léon XIV n'Angola, ekóló yókó ekoluka boyokani
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
22 ya sánzá ya misáto 2009, na eleko ya kotika Angola, Benoît XVI abombaka mawa na ye te na lotómo ya kotika bato aútaka komona bangó, kasi akabolaka esengo na ye «ya kokutana na bato ya mpiko mpe ezua mokáno ya kobotama lisusu». Ezali kaka na molimo ndé Léon XIV asengelaki kokóma mokolo ya póso eye 18 ya sánzá ya minéi, mibú zómi na sambo Papá azalaki libosó na ye, mpo ya etapi ya misáto ya mobémbo na ye n'Afrika.
Angola ezali mabelé mókó epái wápi ba pási bizangi te, mpe esika wápi «mbótama ya sika» ekomonana kaka elaká yókó mpo ya lobí. Baí-Angola baleki etumba ya civil eye esopi makila ebelé, ebándaki úta lipanda ya ekóló na 1975, mpe eye esilaka ya sóló kaka na 2002, etumba yókó esálaka na bawéi káti ya 500 mpe 800 000 mpe etika mitungisi ya mozindo na ekóló. Sóki bozali na sikisiki ezonga, bato y'Angola basengeli lisusu kobunda na mikakatano ebelé na kobánda na maye ya botomboli, ya bosémbo mpe ya etumba libosó ya kanyáka.
Engebene na Mgr José Manuel Imbamba, episkopo ya Saurimo mpe mokambi ya Lisangá ya baepiskopo, etumba ya civil «ezongisa sima moke eye esálemaka, na bokeli bisalelo ya bokabwani, ya bobola, ya bobwaki pembeni mpe ya bokomisi nionso likambo ya politiki na boyébi ya bato». «Leló, Angola ekabwani makási koleka, ba parti politiki bizali libosó ya makambo nionso. Angola ezali na botáli malámu mokangemi ya ba parti mpe ntángo yangó esalemi, ekóló etikali sima», elimbolaki ye na lisoló lyokó n'agence Fides.
Ekoló yókó ekoluka bomoko mpe boyokani
Léon XIV akokóma na ekóló lokolá «moto ya mobémbo mwa boyambi ya elikya, ya boyokani mpe ya boboto» lokolá ekoloba lisusu Liloba-lotómo ya mobémbo eye. Akoki kolikya na bozali ya kátikáti ya Eklezia yókó ya elenge mpe ya moléndé, na ekóló yókó esika wápi pembeni na 45% ya bato bazali katoliko (milio 20 ya bato). Longola mboka-mokónzi Luanda, bilaká ya Papá wa Roma bikomema ye na sanctuaire ya Maria ya Muxima, na ba ngonga mibalé ya mboka-mokónzi mpe na etuka ya Saurimo, esika ya dyamá (diamant) ya nordi-esti ya ekóló, mosika na Congo-Kinshasa mpe epái wápi bato bakimá bakobika. Engúmba elemba, Saurimo mpe ba province biye bizali nzinganzinga bikomonana mingimingi lokolá bingúmba bibosanama esika wápi Letá azali te.
Elombe ya pitolo y'Afrika, Angola ezali yókó ya bikóló biye ba bokeseni bizali koleka na mabelé. Na mobémbo eye, Papá asengeli te kozangisa kolendisa na bokaboli elámu ya makoki, na mosála ya bato, na bolobi 'te baí-Angola bazali bansó kaka na nzóto waná ya ekóló. «Angola ezali ekóló yókó epái wápi tozali na makambo ebelé, kasi toyébi kobomba elikya», elobi sángó franciscain Antonio Silva ya paloise Notre-Dame ya Fatima esika wápi Léon XIV akokutana na baepiskopo y'Angola, «tokozela epái na ye maloba ya boboto mpe ya boyokani mpo ya mókó mókó ya baí-Angola, ayébisa bisó ‘te tokoki kobika na lokúmu».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
