Léon XIV atango akendeki kotala bakoko na ndaku ya babangé na Saurimo, n'Angola Léon XIV atango akendeki kotala bakoko na ndaku ya babangé na Saurimo, n'Angola   (AFP or licensors)

Leon XIV : Babangé bazali bakengeli wa bwanya bya bato

Na tango autaki na Luanda mpe akómaki na Saurimo, Léon XIV akendaki kotala bankoko oyo bazalaka na ndako ya mibange. Mpo na Pàpa, ezali libaku ya komonisa ntina ya kobatela mibange, oyo «bakutanaki na mikakatano mingi mpo na bolamu bwa bato».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Bayambaki Leon ya XIV na esengo, lokola na ndako o kati ya libota mpe na klima ya nteke to ya feti, na LAR, ndako ya mibangé na Saurimo. Centre yango ezali na bato tukù motobà na mibale (62) bakómi mibange, mibali tuku mibale na motobà (26) mpe basi tukù misato na motobà) mpe basi tuku misato na motobà (36), elobi mokambi Georgina Mwandumba. Bakonzi ya Angola nde batongaki ndako ena mpo na kobómba mibange oyo banyokwamaka, oyo bandeko na bango batyolaka, to oyo bafundaka ‘te bazali bandoki. Esika yango ezwaka mosolo ya Leta, mpe ezwaka mwa ndambo mosusu na  Eklezya ya bibongiseli mpe ya bato oyo bapesaka lisungi. Esika yango ezwaka mosolo ya Leta, mpe ezwaka mpe mosolo ya lingomba, ya bibongiseli mpe ya bato oyo bapesaka lisungi. 

Bokutani o ya libota

Batambaki Nganga-Mokonzi, na esengo, lokola o kati ya libotà. Ezalaki se bongó na makanisi ma Pàpa, oyo alingaki sima ‘te esika ndaku wana, ebengami  na nkombo ya “lar”, oyo na lokotà ya Portugais elimboli “ndako”, ezala ntango inso ezingelo malamu mpo na bampaya na yango. Leon asepelaki makasi mpamba te andimaki solo ‘te ayambamaki malamu, lokola Yezu tango azalaki kokende epai ya baninga ba yé: “Nsango Elamu eyebisi biso ‘te Yezu akendaki na ndako ya Petro na Kapharnaume, epai wapi abikisaki mokolo moko bokilo na ye ya mwasi. Ekokundola biso mpe boninga na ye elongo na Maria, Malata mpe Lasalo. Na ndako na bango na Betania, bayambaki ye lokola Moteyi mpe Mokonzi, kasi mpe lokola moninga”.

Botondi bwa Pàpa

Liboso ya kolongwa na ndako ya babange, Léon XIV apesaki matondi na bakonzi ya Angola mpo na misala na bango mpo na mibange oyo bazali na bosenga. Na nsima, apesaki mpe matondi epai ya bandeko oyo basalaka elongo nà Leta mpe bandeko basusu basalaka na bolingo na bango moko mpo na kosalisa bankulutu. “Kobatela bato ya mpasi ezali elembo ya ntina mingi mpo na koyeba soki mboka ezali na bomoi ya malamu” alobaki ye. Babangé bazali na mposa ya lisungi, kasi liboso na nyonso, bazali na mposa ya bato bayoka bango, elobaki lisusu Papa. “Bazali babateli ya bwanya to mayele ya bato. Mokitani ya Petro asukisaki na maloba maye: “Tosengeli kopesa bango melesi. “Bamonaki mpasi mingi mpo na bolamu bwa bato”.

Tango Pàpa Leon ya XIV akendaki kotala Babangé na Lar na Saurimo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

20 sánzá ya mínei 2026, 23:02