Léon XIV asengi ‘te bokengi ya bato banso bozala ya Bosembo koleka mpe bomoko
Albys.KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na tango ayambaki bakonzi mpe basàli ya INPS na, organisme ya liboso ya Leta mpo na kobatela bato na makambo matali bokolóngónó bwa nzoto na Italie, na mokolo mwa mitano, mwa 10 Apríli na Salle Clémentine, Pápa abendaki likebi ut’o ebandeli ya lisoló na ye na ntina ya mosala ya INPS. Pàpa alobaki ‘te: “Ozali kokokisa mokumba monene ya bato mpe ya ba organisme . . . na kotya likebi mingi na makambo ma mpasi”. Mpo na Papa, mosala moye, mopesi INPS nzela ya kosala malamu mpo na kolendisa mokumba ya bato oyo ezali kosangisa bokóli bwa nkita mpe bomoko bwa bato, mpe ezali kopesa nzela na kopona makambo mpo na bolamu bwa bato banso.
Nkita to bomengo ekabwami malamu te
Na nsima, Pápa alobelaki likambo moko ya mabulungani na ntina ya bokeseni ya nkita na mokili mobimba. Atako bozwi ezali mingi, Pápa alobaki ‘te “motángo to motuya ya babóla ezali se kobakisama”. Akundolaki ‘te bankàmà ya bamilio ya bato bazali nayino na bomoi ya mpasi, bazangi biloko bya ntina lokola bilei, mayi ya peto, mpe lisalisi lya monganga.
Liboso lya likambo liye, Léon XIV alobaki ‘te “Nkita to bomengo boye boleki ndelo ezali kaka na mabókó ya bato moke”. Ezali likambo lya bosembo te, elobaki ye, “na yango tokoki kaka komituna mituna mpe komipesa mpo na kobongola makambo”. Alobi ‘te: “Ezali na eloko moko te oyo ekoki kokómisa biso bato bazangi bokokani”. Mpo na Pápa, mokakatano mozali te bozangi mosolo, kasi nde bokaboli bwa yango, oyo ezali kosenga “makanisi mya sika mpo na bizaleli bilamu mpe bosembo”.
Mimeseno mya bato mikoti na lisólo lya Eklezya
Eklezya Katoliko etyaka tango inso likebi mingi na bamposa ya bato, ezala na makambo etali mosala to kosalisa bato baye bazali na bosenga. Na kotalela mateya ma Eklezya mpo na makambo ma bomoi bwa bato, episkopo ya Roma alobelaki na ndakisa ya mokanda Rerum novarum ya Léon XIII, oyo elobaki ‘te esengeli kobatela bato ba mosala: “Tósala nyonso mpo ‘te mosali azanga mosala te . . . na ntango ya maladi, ya bobange to ya likàmà”. Bongo mp ona komema lisungi n abato ba mpasi, Lein ya XIV alobi ‘te: “Libota na libota ezali eteni ya corps social”. Na mikolo miye miwuti koleka, abakisaki ‘te, mposa ya eklezya mpo na ndakisa ya Leta-ya-lisungi ezali na mikanda mya Santu Yoane (Saint Jean XXIII) Mater et Magistra (1961) mpe Pacem in terris (1963). Na kati ya mateya myango, tokoki kotánga Populorum progressio ya Santu Polo (Saint Paul VI), Laborem exercens, Sollicitudo rei socialis mpe Centesimus annus ya Saint Jean Paul II, mpe Caritas in veritate ya Benoît XVI. Pàpa alimbolaki lisusu ‘te, nzela wana ememaki na mateya mya Papa François, mingimingi na mokanda mwa ye Fratelli tutti, oyo elobi ete “Etat-providence” ekómi mpenza mobeko ya mokili mobimba, mpe na mokanda na ye Laudato si, oyo ezali kolobela “bomoi bwa lokumu na nzela ya mosala”.
Mokakatano mwa mbongwana ya mokili ya mosala
Kati na likambo liye, Pápa asepelaki na mosala monene ya INPS na Italie. Alobi ‘te, “Eteyelo ezali kopesa maboko na kokola ya solo ya bato”. Mpamba te na lolenge wana, bazali kobatela baoyo bazali na mpasi mpe na kotia to kobomba mbongo mpo na bilenge bikoya. Kasi akebisaki mpe mpo na mikakatano mizali koya: kokitisa motuya ya mosolo ya lingomba esengeli te kosalama na ndenge ekobebisa mosala na yango ya kosunga. “Mokano na bino esengeli kozala ntango inso ya kobatela bomoko mpe bosembo na bino”, elobaki ye bongo.
Tata Mosantu alobelaki mpe mbongwana monene oyo ezali kosalema na mosala. Kozala na mbongo mingi, kosala makambo na mokili mobimba, mpe mingimingi bokoli ya mayele ya bomoto ezali kobongola makambo mingi na bomoi bwa bato. Alobi ‘te, ba nzela ya mosala [...] ezali sikawa na makàmà mingi, mpo na kobakisa ba contrats atypiques. Mbongwana oyo ezali kosenga biyano bya sika ut’o na baorganisme ya Leta mpe bibongiseli ya bobateli ya bato.
Kobosana moto te
Liboso ya kosukisa lisoló na ye, Léon XIV azongelaki maloba ma nguya oyo Pápa François alobaki na INPS esili koleka mibu zomi: «Bóbosana te moto ». “Kolinga mpe kosalela bato na bososoli, na mokumba mpe na makoki manso”. Akundoli mpe esengi kopesa lisungi ya liboso na baye babwakami na zando ya misala: «Bosunga bato ya bolembu, mpo ete moto moko te azanga lokumu ... ya kozala na bomoi ya solo mpenza».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
