Luka

2026.04.22  Mobembo ya Pàpa na Guinea Equatoriale -  Na tango ya misa na Bazilika ya Immaculée Conceptin na Mongomo, o mokolo mwa 22 ya sànzà ya Aprili. 2026.04.22 Mobembo ya Pàpa na Guinea Equatoriale - Na tango ya misa na Bazilika ya Immaculée Conceptin na Mongomo, o mokolo mwa 22 ya sànzà ya Aprili.  (@Vatican Media)

Leon XIV alendisi bakristu na komema mokumba ya Guinée équatoriale

Na tango ya misa oyo asalaki na Catedrali ya immaculée Conception ya Monongo, o mokolo mwa 22 Aprili, mokolo yambo asukisa mombembo mwa ye na Afrika, Pàpa alandisaki bakristu ya Guinéé équatoriale na kokóma batóngi ya mikolo mikoyà ya elikya. Azongelaki mpe mibù nkamà moko na tukù sambo (170 ans) ya bopalinginyi Nsango Elamo, bazali kosepela, asengi moko na moko na kozala na boyambi oyo ezali komonisama na misala, mpe ezali na makoki ya kobongola lisanga ya bato, (societe) mpe kotombola bomoto.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

  

Liboso lya bankoto ya bayambi basanganaki na baziki, katedrali oyo epesaka lokumu na nkumbama ya maria ezali na lisumu te (immaculéé Conception), le Saint-Père akundolaki, na ebandela ya omeli to mateya ma yé, ntina ya kozala na bomoi ya bokristo ; « Solo Ukaristya esangisi makambo manso ma molimo ya eklezya, oyo ezali nde Kristo, Pasika ya biso, oyo amipesaki mpo ya biso». Azali «mapa ma bomoi oyo ekotondisa biso» mpe «bozali mobimba mwa nzambe oyo ezali kondulo biso bolingi ndelo suka te bwa yé mpo na libotà mobimba ya bato». Na milulu miye asalaki yambo te azonga na Roma, Pàpa atondoki botondi mpo na «mibù nkamà moko na tuku sambo (170) ya bopalinginyi Nsango Elamo». Akumisaki litatoli ya «bamisionele bayiké, banganga-nzambe ya ba dioseze, bakatekisi mpe bayambi balayiki oyo bamipesaki bomoi bwa bango mpo na mosala mwa Nsango Elamu».

Eklezya ebyangemi kozala misio

Leon XIV alendisaki bayambi na kokóba na libula ya kopalinginya Nsango Elamu: «Bosengeli kokoba na nzela oyo ba misionele babandaki, bakengeli mpata, ba layiki oyo bazalaki liboso na bino». Azongelaki maloba ma Saint Paul VI, oyo alobaki ‘te : « Ba-Afrika, bozali bobele sikawa ba misionele ya bino moko», mp ona koloba ‘te, eklezya ezalaki na maboko ma bango, nzokande boyambi esengeli kotikala se na maloba te, kasi esengelo kobongwama na misala. «Boyambi bokosakola na esengo na tango ya biyenga o mangomba ma bino mpe na milulu minso bokosalaka, ezala bileyi bya bikela bya bino banso, mpe mokumba mpo na baninga, mpo na bokóli ya bolamu ya bato banso».

Mokolo mwa 22 Aprili 2026., mobembo mwa Pàpa na Guinée équatoriale - Misa na bazilika  Immaculée Conception na Mongomo.
Mokolo mwa 22 Aprili 2026., mobembo mwa Pàpa na Guinée équatoriale - Misa na bazilika Immaculée Conception na Mongomo.   (@Vatican Media)

Pàpa akundwelaki lisusu ‘te mosala ya mokristu ekoki kozala na mikakatano, kasi ezali kosenga «bompikiliki, makasi mpe tango mosusu bomipesi». Nganga-mokonzi alendisaki bato batiya motema, ata na tango ya mikakatano. Mpo na confiance wana, oyo ezali kotondisa nzala mokili, Pàpa ayebisi bango te “Nzambe akozala mpo ya biso, lipa lya bomoyi, ekosilisa nzala ya biso”.

Nzala ya mikolo mikoyà mpo na ekolo

Na bowumeli ya mobembo mwa ye, Tata-Mosantu asalaki mtuna moko ya motuyà mp ona koyeba: “Nzala nini tokoyokaka? Mpe ekolo eye ezali na nzala ya nini na moyi mwa lelo?”. Akanisaki na bango lisusu, devizi; “Kristu mwinda mwa Guinéé équatorial na nzela ya elikya”. Pàpa ayanolaki ‘te ezali “Nzala ya mikolo mikoyà”, oyo ezali na makoki ya “kobotisa boyengebene to bosembo bwa sika” et “mpe komema mbuma ya boboto mpe ya bondeko”. Avenire to Mikolo mikoyà ya Guinée equatoriale, evandi “na lolenge na bino ya kosala makambo na bontoki” mpe “komipesa na bino mpo na kobatela bomoi mpe lokumu la moto nyonso”.

Korale oyo eyembaki na milulu mya Ukaristya
Korale oyo eyembaki na milulu mya Ukaristya   (@Vatican Media)

Na yango, ezali na ntina ‘te bato banso baye bazwi batisimo bamiyoka ‘te bazali kosangana na mosala ya kopalanginya Nsango Elamu, bakoma bantóma ya bolingo mpe batatoli ya bomoto ya sika.

Mbela na bosembo mpe na bolamu bwa bato Banso

Léon XIV abengaki bayambi ba ye ‘te “básala mpo na bokóli ya mboka na bango mobimba” na “bàsangana na bokóli mobimba ya mokili moye,  mpo na kobongola yango”. Alendisaki bato na kosalela bomengo ya mokili moye -Nzambe apesà biso, “ bobenisi mpo na bato banso”, na kosala “mpo na bolamu bwa bato banso, kasi mpo na matomba ya moto ye moko te”. Pàpa abyangaki mpe na “kolekisa bokesenibozali o kati ya bango” mpe bàbatela “lokumu la moto”, mingi mpenza “babola, mabota mazali na mpasi” mpe “bato ya boloko”.

“Tiká ‘te Mokonzi asalisa bino, bókóma bato baye bazali sé kokóla na bontoki bwa mosala ma bango oyo ekeseni, epai wapi moko na moko na bino, engebene makoki na ye, azali kosala mpo na bolamu bwa bato banso, kasi mpo na matomba ma ye moko te. Bosengeli kolekisa bozangi bosembo kati na baoyo bazali na makoki mingi mpe baye bazangi moto ya kosunga bango.”

Bobanga te na kosakola Nsango Elamu

Na kosukisa mateya ma ye, Léon XIV abimisaki ntina ya kozala ya “Bakristu  bazali kokamba makambo ya Guinée Équatoriale” mpe abwakaki mbela na bayambi ‘te: “Bobanga te kosakola mpe kotàtola Nsango Elamu. Alendisaki bango ‘te bakóma “bapostolu ba bolingo” mpe “batemó bya mokili mwa bato ya sika”, oyo bakoki kotonga “avenire to mikolo mikoyà ya elikya, ya kimya mpe ya kozongisa boyokani. Bongo ba landa ndakisa ya mosala moye bamisionele babandaki esili koleka bambula nkàmà moko nà tuku sambo (170 ans). Na bolobeli bwa  Ngondo Maria mpe lisungi la ye, Eklezia na Guinée Équatoriale ebyangemi na Nganga-Mokonzi monene mpo na kolanda mobembo mwa ye ya misionele na mpiko mpe na esengo.

Misa ya Léon XIV na Mongomo na Gunée equatoriale, o mokolo mwa 22 ya sànzà ya Aprili 2026.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

22 sánzá ya mínei 2026, 22:27