Léon XIV akanisi François: lokola likabo mpo na Eklezya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Na mokolo moye ya mbula liboso ut’o liwa lya ye, nalingi kokumisa Pàpa François, oyo apesaki mingi na Eklezia bomoi bwa ye, na litatoli na ye, na maloba na ye mpe na misala mya ye. Mpo na oyo asalaki, na kofandaka mpenza penepene na babola, na bato bazangi lisalisi, na bato ya maladi, na bana mpe babangé”. Na kati ya Angola mpe Guinée équatoriale, esika ya nsuka ya mobembo na ye na Afrika, na mokolo ya anivelsele ya liboso ya liwa ya Pàpa François, oyo akufaki na tongo ya mokolo ya 21 Aprili 2025, Léon XIV azangaki te kopesa makanisi ma ye moko na moto oyo azalaki liboso na ye. Akabolaki likanisi lyango nà bapanzi nsango tuku motobà (60) oyo bazalaki elongo na ye. Na mokili mobimba, bato bazali kosala anivelsele na ye na esengo mpenza.
Kokólisa Bondeko
Na bolingo nyonso mpe na botondi nyonso, tokanisi Pápa oyo «na litatoli na ye mpe na maloba ma ye, «atikelaki Eklezya biloko mingi», elobaki Léon XIV. Tokoki kokanisa «makambo mingi» na ntina ya Jorge Mario Bergoglio, kasi Léon XIV abosani te bolendisi bwa ye (exortation) na ye ya ntango inso mpo na «bondeko ya mokili mobimba»: François azalaki koluka na bosolo nyonso « kokólisa limemya ya solo mpo na mibali mpe basi banso. Alendisaki elimo ya bondeko, kozala bandeko mibali mpe bandeko basi, biso banso elongo, mpe koluka lolenge kani kosalela sango oyo tozali kokuta na Nsango Elamu».
Nsango ya Motema Ngolu
Mokanda mosusu ya Papa François oyo Papa Léon XIV alobeli ezali oyo ya “miséricorde” (motema Ngolu) oyo abimisaki na mikolo mya liboso ya Angélus, mokolo mwa lomingo elandaki boponami bwa ye, mwa 13 mars 2013. Kasi mpe misa oyo asalaki yambo kutu ya kobanda mosala mwa ye ya bontómà bwa ye, mwa 17 marsi ya mobù 2013, tango na parwase ya Sainte Anne, na Vatikan, ateyaki na ntina ya mwasi ya bokali to ya ekobo. Mpe alobelaki na molende nyonso, na ntina ya kimotema Ngolu ya Nzambe mpe bolingo bonene bwa ye, mawa mpe bokabi bwa ye. François alingaki kokabola “elimo” wana nà “Eklezia mobimba”. Akundwelaki mpe, milulu kitoko ya Zubilé ya Motema Ngolu ya kokamwa oyo asalaki.
Likabo mpo na Banso
Na nsuka, Léon XIV alobaki ‘te: «Tobondela mpo ‘te azwa Ngolu ya Mokonzi », mpe «Tópesa Nzmbe matondi mpo na likabo monene lya bomoi ya François mpo na Eklezya mobimba mpe mpo na mokili mobimba ».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
