Botali ya Papa na lopitalo lattoliko Santu-Polo ya Douala Botali ya Papa na lopitalo lattoliko Santu-Polo ya Douala  (@Vatican Media)

Botáli ya Papá na lopitalo katoliko Sántu-Polo ya Douala

Sima ya misa esálemaki na Japoma Stadium ya Douala, Léon XIV asálaki botáli bokó na misála misusu ya lopitalo Sántu-Polo ekambemi na dioceze ya Douala mpe ezali na eténi ya Bassa. Liloba lyokó ya bolendisi epesamaki na bána, bási mpe na basáli ya lopitalo baye batálaka bakoni na eleko yókó ya pási.

Vatican News

O eleko ya mobémbo na ye ya bontómá na Cameroun, Papá oyo linaka etóndi káti na ba misa mpe ba bokútáni, aponaki kotála esika ya bána bitike Ngul Zamba ya Yaoundé, kasi lokolá lopitalo katoliko Sántu-Polo ya Douala. Mokolo ya mitáno 17 ya sánzá ya minéi, sima ya misa akambaki na Japoma Stadium ya Douala, mboka-mokónzi ya nkita ya ekóló, Léon XIV amemaki lisálisi mpe lilendisi na bakoni ya lopitalo ekelamaka na 1971 na ba Mamelo Basáli ya Maria mpo na mosála ya baye bazangi makoki.

Elongo na mokambi ya lopitalo, atálaki misála ebelé. Na lopitalo, ekambemi na dioceze ya Douala, mpe ezali na eténi ya Bassa, Papá amanyolaki na chapelle, na sima apesaki longónya na minganga mpe mwá bakoni.

Elembo yókó ya bobondi

Mokolo na mokolo, bopemi te, baminganga bakosála makási áwa mpo ya kopesa lisálisi likoki mpe ya malonga. Bokébi bokó epésamaka na bási. Bakoni basusu bakokaki, mokolo ya mitáno, kosimba loboko ya Papá wa Roma oyo, na bolingi bonéne, amikomisaki pembeni ya ba pási na bána mpe mikolo. Na bansó, na káti mabótá bizalaki waná, apesaki bobénisi na ye yambo ya kopesa mbote na bakoni mókó mókó.

Bapota ya molimo mpe biye ya nzóto

Sima koloba losámbo lya Tatá wa Bisó, Papá wa Roma akokaki kokota bisika bakoni bazali epái wápi bakosálisa bakoni. Apusanaki pembeni ya bána mpe ya babange. Bozali ya Mokitani ya Petelo esimbi bongo bapota ya etumba mpe biye ya mosuni; ekokitisa mitungisi ya makási mpe ekomema libiki ya molimo mpe ya nzóto. Na súka ya botáli, yambo ya ngonga ya 14 ya ekóló, Papá akendeki na libandá ya pépo mpo ya bokéi na Yaoundé, esika wápi asengelaki, na sima ya nzanga, kokutana na bayékoli mpe ba universitaire ya Université katoliko y'Afrika ya ntéi.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

17 sánzá ya mínei 2026, 19:34