Pàpa Leon ya XIV ayambaki na masolo, balóngani ya bokonzi ya Espagne
Bansango ya Vatikan
Na Palais apostolique, engebene na liyebisi lya ndako ya bopanzi nsango ya Esika Esantu, o mokolo mwa 20 Mársi, Pápa Léon XIV ayambaki Mokonzi Felipe VI mpe Mokonzi-Mwasi Letizia ya Espagne. Na nsima, bato ba libota lya bokonzi bakutanaki na Episkopo wa lokumu Secrétaire ya État, Pietro Parolin, mpe Mgr Paul Richard Gallagher, Secrétaire mpo na ba Relations elongo na ba États mpe ba organisations internationales.
Basololaki na ntina ya boyokani malamu kati na Vatikan mpe Espagne, oyo ekozala na motuya makasi mpo na mobembo mwa sika ya Pápa na Espagne. Basololaki mpe na ntina na makambo ya mikolo miye matali ezalela ya mboka mpe mosala mwa Eklezia kati na bato.
O kati ya masolo basalaki, balobelaki mpe «ntina ya komipesa tango inso na kimya» mpe «kopesa makasi na mitindá mpe bizaleli biye bisimbi bomoi bwa bomoko o mokili mobimba». Na tango Mokonzi Felipe ná Mokonzi-mwasi Letizia bazalaki kopesa Pápa bakado, bapesaki ye buku moko ya Philippe II, oyo ezalaki na masolo ya makambo ma kala (Livre des Heures de Philippe II), oyo ekomamaki na ekeke ya zomi na motobà (XVIèSiècle ).
Ezali mosala moye moleki monene, esalemaki na atelier ya monastele ya Escurial, epai ebatelami. Bapesaki Mokomeli ya makambo matali Letá ya Esika Esantu, likabo ya búku «Espagne sacrée: Art et croyance dans le monde hispanique», oyo na lokotà ya lingala elimboli ‘te : “Espagne mosantu: Mayele ya kosala mpe boyambi na mikili mya bato balobaka lokotà ya Espagnol”.
Na sima ya kotika to kolongwa na Vatikan, balóngani ya bokonzi ya Espagne, bakendeki na Baziliki Sainte-Marie-Majeure mpo na kopesa Mokonzi Felipe VI nkombo ya protocanonique ya chapitre ya basiliki ya Liberia.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
