Luka

2025.12.13  rendu ya oratoire ya sika ya Olgiate Comasco 2025.12.13 rendu ya oratoire ya sika ya Olgiate Comasco 

Papa : Ba oratoires ezali na motuya mpo ya kosalisa bilenge bàlonga komikabola to kozala yomei

Kati na yoko liyebisi, etyaki mokoloto Episkopo wa lokumu Pietro Parolin oyo azali Mokomeli ya etuka ya Vatikan, na libakù lya bokitisi to kotya libàngà lya liboso ya ndako ya sika ya Olgiate Comasco, oyo bapesi nkombo mpo na lokùmu la Santu Jean Bosco, Leon ya XIV alendisaki bato bàyeba ntina to mokumba ya “bisika bya bondeko bwa solo” o kati ya bomoi bwa Eklezya mpe ya bato (societe).

Bansango ya Vatikan

 

Moboko mwa libàngà ya yambo oyo etyamaki na mputulu ya ndako ya losambo ya kala “Saint Jean Bosco” na Olgiate Comasco, mwa mboka moke ya Lombardia, ezwami na ntaka ya bakilometele mwambe nà mindelo ya Suisse na Italie, ezali elembo ya makasi ya makambo maye, oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya Eklezia mpe ya bato banso: Bisika bisengeli kotonga “bokangami makasi mpe ya solo” oyo ekoki kolónga “komikabola ya eleko eye to ya tango na biso”, mingi mpenza oyo ya bilenge. Na ndakisa, kati na mokanda moko oyo mokomeli monene ya makambo matali Letá ya Vatikan, Kardinal Pietro Parolin, atyaki mokoloto, Pápa Léon XIV atindelaki bango mbote na mokolo mwa lomingo, mwa 1 Marsi, ntango batyaki libàngà ya liboso ya ndako ya sika ya losambo mpo na kokundwela mobandisi ya Lingomba ya ba Salesien, mpe Kardinal Oscar Cantoni, episkopo ya engumba Côme, azalaki wana.

Bisika ya Bondeko mpe ya Bolakisi to Mateya

Na maloba ma ye atindaki epai ya Sàngó Flavio Crosta, Sàngó-Mokonzi ya ndako-nzambe ya basantu Hippolyte mpe Cassien, esika epai wapi bakotonga pembeni esika ya sika ya kobatela bilenge, Pápa alobaki ‘te alingi ndako-nzambe yango ezala “esika ya bondeko ya solo kati na bato mpe esika ya mateya ya bokristu”. Kutu Nganga-nzambe ye moko, na mateya ma yé ya mokolo mwa lomingo, alobaki ‘te: mpo na bilenge, ekoki te básepelisa bango; kasi “basengeli koyeba ‘te bàlingami to bàlingaka bango”. Kotyama ya libàngà ya liboso ezalaki mpe elembo ya “nsuka ya mobembo molai ya kozela mpe ya mikakatano”, oyo ebandaki na bokangi ndako ya kala ya losambo na 2017. Mibù mwambe mileki ya mawa mpo na baoyo bakólaki na Oratoire wana, mpamba tè, bazali kokundola mikolo ya bomwana na bango, kino mokolo mwa 18 Novembe moye moleki. Ezalaki bongo, mokolo moye Kardinal Lazzaro You Heung-sik, mokambi ya Dicastele mpo ya bonganganzambe, apesaki ndingisa ya nsuka mpo na botongi ya ndako ya sika.

Kokundola lisusu lingombà na eleko eye “esanga ezali te”

Projet ya ndako ya sika ya masolo, oyo esalamaki mpe ebongisamaki na architecte Alessandra Mastrogiacomo mpe endimamaki na architecte Carlo Valentini, ebongolaki bisika biye kala ezalaki na bokabwani mpe tango mosusu ezalaki na misala mingi te na bisika ya kosala makambo ndenge na ndenge mpe ya koyamba bato. Lisungi ya bolingo malamu ya “bilenge bya kala”, lelomei bato ba mayele mpe bilenge biye bazwi pansio, bàpesaki makoki ma bango na bolingo nyonso na mosala ya Commission mpo na kosunga Sàngó. Ezalaki mpe na ntina mingi. Kasi ezali mpe ya bilenge bya moyi mwa lelo, baye baséngaki kopesa basangani mbote na ntango ya milulu, batikaki makanisi ma makasi, mpe balobaki ‘te: “Tobungi sóló mpenza? Na eleko ya ‘Esanga oyo ezali te’, tomimonaki lisusu lokola lisanga. Tozangaki bifelo, kasi toyekolaki kozala na bomoko; tozangaki ndako, toyekolaki kotonga ndako. Zambi ndako yam asolo to Oratoire ebotamaka na béton te, kasi na miso mya bato baye bayebi komona o kati ya elenge yoko, eloko eye ebongi kosala na molende mp ona lobi la yé”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

03 sánzá ya mísáto 2026, 22:07