Luka

Pàpa Leon ya XIV kati na Losambo Pàpa Leon ya XIV kati na Losambo  

Pàpa ayoki mpasi mpo na bana oyo basàli likambo te mpe bato baye bazali konyokwama na Moyen-Orient.

Ndako ya bopanzi-sango ya Vatikan, na nzela ya kanal ya «Telegram », eyebisi ‘te Pàpa Léon XIV azali kobondela mpo ‘te bitumba binso bisila na bituka bya Moyen-Orient. Mokonzi Ntomà monene akanisi mpo na «bato bayiké basali likambo te, kati na bango bana mike bayiké», bakufi na ba bombi, asambeli mpe mpo na baoyo basungaki bango». Na ndakisa ya Sàngó Pierre El-Rahi, nganga-Nzambe ya ba Maronite oyo akufi lelomei na tango babundisi Liban.

Bansango ya Vatikan

 

Papa Léon XIV amonisi obozingo “mpasi ya ye” mpo na “bato banso babomamaki na babombi ya mikolo miye na Moyen-Orient, mpo na ebele ya bato oyo basali eloko te, kati na bango bana mike, mpe mpo na baoyo bazalaki kosalisa bango, lokola Sàngó Pierre El-Rahi”. Balobeli bongo likambo lya sàngó moko ya ba Maronite oyo akufaki o mokolo mwa yambo nsima ya nzanga na Qlaya. Elekaki na etumba oyo ebetaki ndako moko na esika ya parwasi na ye na bangomba, mpe ezokisaki moko ya bakristu ba ye. Toufic Bou Merhi, sàngó moko ya Lingomba ya ba franciscains, alobaki na bapanzi-nsango ya Vatikan ‘te Sangó Pierre akendaki elongo na bilenge bisusu mpo na kobikisa mosangani ya parwase. Kaka na tango wana, bombi mosusu ekweaki na ndako yango, mpe sàngó azokaki. Na tango bamemaki ye na lopitalo moko ya pembeni, akufaki.

Makanisi ma mawa ya Pápa - oyo epesamaki na nzela ya chaîne “Telegram” ya Ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-Siège - ezali mpo na ye mpe mpo na bato banso bakufaki na bitumba ya mikolo miye na bituka ya Moyen-Orient. Mingi mpenza mp ona bana mike. Engebene na bibongiseli ya bana lokola Unicef mpe Save the Children, bana pene na nkama misato (300) basili kobomama ut’o bituma ya sika ebandaki. Lapolo ya Vatikan elobi ‘te Pápa Léon XIV “azali kolandela na bobangi, makambo manso maye mazali kosalema mpe azali kosambela mpo ‘te bitumba binso bisila na lombango to nokinoki”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

10 sánzá ya mísáto 2026, 21:40