Luka

2025.09.30 Papa Leone XIV , na bokutani nà Bapanzi-nsango, na Castel Gandolfo 2025.09.30 Papa Leone XIV , na bokutani nà Bapanzi-nsango, na Castel Gandolfo  (@VaticanNews)

Pápa asengi ‘te etumba esila mpe bàsolola mpo na kimya

Léon XIV alobaki na bokuse na bapanzi-nsango na Castel Gandolfo, na tango abimaki na ndako ya Villa Barberini na mpokwa ya mokolo mwa mibale, mpe azongelaki lisusu libyangi na ye ya “kosala mpo na kimya, kasi na nzela ya bibundeli te”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Botika kobete masasi” mpe “bosala mpo na kimya, na bibundeli tè, kasi na masolo, na koluka solo mwango mpo na bato banso”. Pápa Léon XIV azongelaki na bokuse, maloba ma ye mpo na kimya, oyo alobaki mokolo mwa mibale na mpokwa, na mokolo mwa 24 na sanza ya màrsi, na etuluku ya bapanzi-nsango. Bazalaki kozela ye liboso ya Villa Barberini, ndako na ye na Castel Gandolfo, epai alekisaki mokolo na ye ya kopema mpe ya mosala.

Na kolobela nà mawa na motema na ntina ya ezalela ya makambo mazali koleka na mokili mobimba, alobaki “te koyinana ezali se kobakisama, mobulu ezali se kokóba, bato koleka milió moko bazali se kokabwana mpe bato mingi bazali kobungisa bomoi. “Tokosambela mpo na kimya, elobi episkopo ya Roma, mpe asengi na bakonzi nyonso ‘te basala mosala ya solo na nzela ya masolo mpo na kosilisa mikakatano”.

Mbela na tango ya Angelus ya mokolo mwa 22 Màrsi

Na mokolo mwa lomingo loleki, na tango ya Angelus, ut’o lininisa lya ndako ya bontomà, Léon XIV, amonisaki mawa ma ye mpo na ezalela ya makambo mazali koleka na Moyen-Orient mpe na biteni bisusu bya mokili miye mitondi na bitumba mpe mobulu. Akomaki ‘te: «Tokoki te kofanda nyee liboso lya mpasi ya bato bayiké oyo bazangi makoki mya komibatela, mpo na bitumba yango». Likambo liye lizali kosala bango mpasi, ezali mpe kosala bato banso mpasi. Liwa mpe mpasi oyo ezali kowuta na bitumba yango, ezali kobulunganisa libota mobimba ya bato mpe ezali koganga epai na Nzambe! Nganga-nzambe Monene alendisaki bato na kolendendela kati na losambo mpo ‘te bitumba esila mpe nzela ya kimya, oyo esimbami na boyokani ya sembo mpe na limemya mpo na lokumu ya moto nyonso, efungwama.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

25 sánzá ya mísáto 2026, 13:09