Pápa asengi ‘te báyebisa na bato mpo na kotonga kimya
Bansango ya Vatikan
Léon XIV atindelaki mokambi mpe bakomi ya Tgcom24 liyebisi liye, kasi ezali kolobela na bokuse makambo manso ma ntina mpo nsango ezala lolenge esengeli kozala. Ya liboso, Pape atali makambo ma moyi mwa lelo, oyo ezali na “mbongwana monene mpe maloba maye “babimisaka mbala mingi na Web”. Akomi ‘te, bapanzi-nsango bazali na “mokumba moko ya ntina mingi” ya “kotonga nzela ya kosolola” na makambo ya mikolo miye. Léon XIV alimbolaki ‘te yango esengi “koyebisa lisolo liye lizali kosuka kaka na makambo ma mikolo miye te, kasi oyo ezali kotalela na limemya, na bomoko mpe na motema mawa, makambo mazali kosalema na esika bato bazali konyokwama”.
Bosolo mpe mokumba
Na kati ya liyebisi lya Pápa ezali mpe na libyangi na bosolo mpe ya “bososoli o bozindo, mokumba mwa bizaleli malamu” mpo na kobundisa “kopalangana ya bansango ba lokuta” mpe mpo na kolendisa “mimeseno ya bokutani” oyo ekoki kosangisa milimo ya bato.
Mpo na kimya oyo ezangi bibundeli mpe oyo ekoumela
Libyangi mpo na koyebisa “makambo ma bonsomi mpe na limemya mpo na bomoto bwa bato” ezali mpe makasi, mpamba te yango ekómi “ebundeli makasi” mpo na kobanda nzela ya “kimya oyo ezangi mandoki mpe oyo ekoumela”. Na nsuka, yambo ‘te apesa Bobenisi bwa ye, Pápa atyaki bato basalaka na Tgcom24 na maboko ma Santu François ya Sales, mokomeli mwa Eklezya Katoliko mpe mobateli ya bapanzi-nsango ya Katoliko.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
