Pápa abéngi bitumba bya mikolo miye, «likambo lya nsóni mpo na mokili ya bato»

Na nsuka ya losambo la Angélus ya mokolo mwa lomingo, 22 ya sànzà ya màrsi, Pàpa azongelaki mbela ya yé ya kokóba na mabondeli, mpo ‘te bitumba esila mpe nzela ya kimia efungwama na lisalisi lya nzela ya masolo ya solo, mpe na limemya la bomoto ya moto na moto, o kati ya bitukà binso bya mokili moye mobebisami na bitumba. Liwà mpe mpasi ekowùtaka na bitumba bina, lizali «nsoni mpo na libota mobimba ya bato mpe lolakà liboso lya Nzambe».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lolenge kani tokoki koboya kotya likebi na makambo mazali koleka o kati ya mokili sik’awa? Ebele ya mibali, basi mpe bana, bazali kokufa mokolo na mokolo na Moyen-Orient. Etumba esili ekomi na poso na yango ya minei, nzokandé mosala moko “na lombangu mpe mosala ya malamu” mosengelaki kosalema na baye babandaki kobeta masasi to bamisili na ebandeli.

Na nsuka ya losambo la Angelus, Pàpa alobaki ‘te bakóba “kolanda na mawa nyonso” lolenge makambo mazali koleka, kaka na Moyen-Orient mpamba te, kasi mpe na bisika bisusu bya mokili moye “motondi na bitumba mpe mobulu”. Ukraine, Birmanie, Yémen, Soudan, Républiki démokratiki ya Congo, mpe bitumba bisusu mingi ya nsómo ezali kokóba na nsé ya elilingi ya misala mya Etats-Unis na Israël na Iran mpe na Liban.

Mpota mozokisi mokili mobimba 

Tokoki kozala nye te liboso lya mpasi ya bato ebele, bato bazangi makoki ya komibatela na bitumba eye, elobi Pàpa. Alakisi ‘te “eloko ezali kozokisa bango, ezali mpe kozokisa bato banso na mokili”. Mpo na Nganga Nzambe Monene, liwa mpe mpasi oyo bitumba eye ebimisi, ezali “likàmà mpo na libota mobimba ya bato mpe ezali lolàkà liboso lya Nzambe”. Na yango, azongeli na makasi nyoso libyangi lya kokóba na losambo to mabondeli, mpo ‘te “kowelana esila, mpe nzela ya kimya efungwama. Etongama na nzela ya masóló ya solo mpe na limemya mpo na lokumu lya moto nyonso”.

“kokóba na losambo to mabondeli, mpo ‘te “kowelana esila, mpe nzela ya kimya efungwama. Etongama na nzela ya masóló ya solo mpe na limemya mpo na lokumu lya moto nyonso”.”

Esengeli ‘te masano ezala nzela ya kimya, ya bosangani ya bato

Na maloba ma boboto, Pápa apesaki mpe longonya na “marathon monene” oyo ezali kosalema mokolo mwa lelo na Roma, nà bato bamasano mingi oyo bawuti na mokili mobimba. “Ezali elembo ya elikya”, elobaki Pàpa, mpe abondelaki mpo ‘te “lisano ekoka kolakisa nzela ya kimya, ya bosangisi bato mpe ya makambo ma molimo”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

23 sánzá ya mísáto 2026, 17:07