Luka

Na tango ya losambo la Angélus, Léon XIV, alendisi bato bázala nà tàngo mpe na boboto.

Na komaniola Nsango Elamu, na tango ya Angelus ya mokolo mwa lomingo la misato ya Karézimo, Léon XIV abengaki na kozala lokola Yezu nà mwasi ya mo-Samariya, tózala ya kofungwama, tóyoka mpe tózala nà tango. Amonisaki ‘te oyo ezali tango ya kowelana te kati na tempelo moko mpe mosusu..

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Tokoti na poso ya misato [ya Karézimo] mpe tokoki sikawa kobakisa mobembo na biso!”, elobaki Léon XIV, liboso lya bankoto bya bakristu bayanganaki na esika Saint-Pierre mpo na losambo la Angélus, mokolo mwa lomingo 8 ya sanza ya marsi. Alobelaki masolo misato ya ba Nsango Elamu elandanaki kobanda na poso moye. Biteni misato mpo na bayekoli baye bakozwa batisimo na Pasika mpe mpo na baoyo basili kokóma bakristu mpe bakoki “kozala bakristu na bosembo mpe na esengo mingi”.

Na lomingi loye la misato la eleko ya Karézimo, lisolo ebetami ya bokutani bwa Yezu na mwasi mo-Samariya. Elakisi malamu te, “Yezu azali solo eyano Nzambe akozongisa mpo ya ba mposa ya biso ya mayi”, elobi Tata Mosantu.  Bato bayiké bazali nayino koluka “liziba linà ya molimo”. Apesi lokola ndakisa,  Etty Hillesum, elenge mwasi Moyuda oyo akufaki na boloko na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mwasi wana azalaki kokoma na mokanda to manaka ma yé ‘te “Nzambe akundami” mpe esengeli ‘te “bátimola ye lisusu, to babimisa ye lisusu na mabele”. Pápa alobi ‘te “ezali na lolenge mosusu te ya malamu koleka ya kosalela makasi ma biso, mpo na kobikisa to kosikola mitema mya biso”.

Kozala na bokebi mpo na baningà

Bokutani bonà elongo nà mwasi mo-Samariya, ezalaki libaku mpo ‘te Yezu alakisa na bayekoli ba yé ‘te, esengeli bazala na bokebi. Alobi ete ntango ya kobuka mbuma ekómi pene, kasi mbuma ya blé ezali naino komonana te. Léon XIV alimbolaki ‘te: “Epai tozali komona eloko te, ngolu ezali kosala mosala mpe mbuma na yango esi ebongisami mpo na kobuka”. Yezu azali na likebi, mpe na yango, na esika ya koboya mwasi Mo-Samariya, lokola momeseno ya eleko ya yé ezalaki kosénga yango, “azali kosolola na ye, koyoka ye, kotyela ye motema kozanga kokanisela ye mabe to kotyola ye”.

Na moyi mwa lelo, «bato boni bazali koluka kati na ba eklezya, lolenge la boboto bona, ndenge ya kozala na bokengi lokola ya yezu, ezaleli ya kozala pene nà bato! Mpe ndenge nini ezali malamu kobungisa tango mpo na kotya likebi na bato baye tokutanaka nà bango, ndenge bazali mpenza» , ekanisaki bongo episkopo wa Roma. Mwasi Mo-Samariya oyo Yezu azalaki kolekisa tango na yé nyonso elongo na ye, «akómaki moto mwa liboso kati na ebele ya bato oyo bazalaki kosakola Nsango Elamu na mboka na ye », Kaka yé oyo bato bayiké bazalaki kotyola mpe koboya, kasi na nzela ya litatoli la yé, bato bayiké, bayaki epai na Yezu. Bongo, bango mpe bandimelaki ye lokola mayi ma peto».

Na yango Papa abyangi na kosenga epai ya  Ngóndo Maria, «àsàlisa, elongo na Yezu mpe lokola Yezu, bato baye bàzali na mposa ya bosolo mpe ya bosembo». «Ezali tango ya kowelana kati na tempelo moko mpe tempelo mosusu, kati na biso mpe bato basusu, mpamba te Nzambe azali koluka mibali mpe basi ya kimya oyo bakosambela ye na Elimo mpe na bosolo».

Pàpa azali kobanga 'te bitumba ekola na Moyen-Orient
Pàpa azali kobanga 'te bitumba ekola na Moyen-Orient   (ANSA)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

08 sánzá ya mísáto 2026, 18:08