Luka

Na tango ya Angelus, Pàpa asengi tolongola mitema mya biso na bolingo ya biloko bya mosuni mpe na mobulu.

Eloko moko te ekoki kosilisa mposa kati na biso, mpamba te, tokelamaki mpo ya Nzambe, elobaki Pape Léon XIV na Angélus ya mokolo mwa 22 ya màrsi 2026, na lomingo la mitano ya Karezimo. Yezu asengi biso tobima na bisika tomikangaka, mpo “to tambola na mwinda mwa bolingi”, lokola basi mpe mibali bya sika. Tozala na makoki ya kolikya mpe kolinga na ndakisa ya bolingi bwa ye ndelo te, elobki Pàpa, tango azalaki kolimbola Nsango Elamu nsekwa ya Lazare.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Moto nyonso oyo azali na boyambi akoki kobima na malita ya mobulu, ya bozangi ntina, ya bomengo, kasi mpe na bisika oyo bomoi ezali te, kasi bobele mobulungano, kozanga bosepeli mpe komizala yomoko, elobaki Pàpa Léon XIV. O mokolo moye mwa lomingo, na mwa mikolo yambo ya Poso Esanto, Evanzile ya Yoane esakoli nsekwa ya Lazare, tango Yezu asekwisaki moninga wa ye, ndeko ya Marthe mpe Marie, oyo akufaki mpo na maladi.

Elembo ekotatola elónga ya Kristo

Liturgie ezali kobenga biso na komona lisusu, na mwinda moye, makambo ma Malózi ma Mokonzi na Poso Esantu ezali koyà mpo na kokanga solo ntina na yango mpe tomifungwama na likabo lya ngolu ezali kati na yango”, elobaki Papa.

Na etamboli ya Karézimo, nsekwa ya Lazaro ezali elembo oyo ezali kotatola elonga ya Kristu likolo lya liwà mpe likabo lya bomoi bwa seko, oyo, ekoki kozwama na biloko ya ntango mokuse te. Nzokande etali eloko ya elonga soki te, kozala nà biloko mpe te to na boyokani ya mwa ntango mokuse, elobaki Pàpa Léon.

“Ngrasya ya Nzambe ezali kongegisa mokili moye, emonanaka tango inso ‘te ezali na koluka makambo masika mpe ma mbongwana, atako esengeli kofuta yango na ntalo bómipimela makambo ma ntina mingi lokola: tango, makasi, bizaleli malamu mpe bolingi – Neti mpe lokùmu, biloko bya mokili, masano, boyokani ya mwa tango mokuse, ekokaki kotondisa mitema mya biso to kopesa biso bomoi bwa seko”.”

Pàpa amonaki yango lokola elembo ya boséngà bozangi ndelo oyo moto na moto azalaka na yango o ntei ya ye, kasi eyano na yango ekoki te kotyama na biloko bya mwa tango mokuse. Léon XIV alobaki lisusu ‘te: “Ezali na eloko moko te oyo ekoki kosilisa mposa na biso ya elimo, mpamba te tosalemá mpo na Nzambe, mpe tokoki kozwa kimya te soki tozwi bopemi te epai na Ye”.

Tófungola mitema mya biso

Lisolo ya lisekwa lya Lazaro ezali kosenga ‘te tótya likebi na mposa ena ya makasi mpe na nguya ya Elimo Santu, mpo “na kolongola o mitema mya biso mimeseno, makanisi mpe lolenge ya kokanisa oyo ezali kokanga biso lokola libanga, na malita ya moyimi, ya bomengo, ya mobulu mpe ya makambo ma mpamba-mpamba to ya likolo likolo. Na bisika bina, elobi ye, bomoi bizali te, kasi bobele “kotungisama, kozanga bosepeli mpe kozala yo moko”.

Tósàla motango te, tómeka te na bolingo

Pàpa akundoli ‘te Yezu, lokola asalaki na Lazaro, azali kobenga moto nyonso lelomei, abima na bisika biye bizali mike, mpo ‘te “bato banso baye babotami lisusu, na ngrasya ya yé”, bakoka kotambola kati na mwinda mwa bolingo, lokola “basi mpe bilenge mibali, baoyo bazali na makoki ya kotya elikya mpe kolinga na lolenge ya bolingo bonene bwa Nzambe, kozanga kosala motango mpe kozanga komeka”.

Na nsuka, Léon XIV asengi lisungi na bolobeli bwa Ngodo Maria mpo asalisa moto na moto azala na bomoi bosantu “na boyambi, na elikya, na bosembo”, mpo ‘te moto na moto akoka kozwa mokolo na mokolo “boyebi bwa mwinda mwa bokutani elongo nà Mwana wa ye oyo asekwi”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

22 sánzá ya mísáto 2026, 19:35