2026.03.09 Elembo to logo la mobembo  ya Pàpa Leon ya XIV  na Bokonzi ya Monaco 2026.03.09 Elembo to logo la mobembo ya Pàpa Leon ya XIV na Bokonzi ya Monaco 

Mpo na Mobembo ya Léon XIV na Monaco, Ndulu to Manaka ebimi

Ndako ya bapanzi sango ya Saint-Siège ebimisaki na mokolo mwa yambo, mwa 9 ya sanza ya marsi, ndulu ya mobembo ya Pàpa na Monaco, mokolo mwa 28 ya sanza ya marsi. Na mobembo moye ya mokusé, Pàpa akokutana na lingomba ya katoliko, bilenge, mpe bakatekimeni. Elembo to logo la mobembo monà molakisi polele elongi ya Pàpa nà etindà na yé ya bontómà, elongo nà koyamba bazali kobombela yen a bokonzi yango, epai wapi ekolo esakoli eyamba ya Katoliko.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mobembo ya liboso ya Papa Léon XIV mpo na mobu 2026 ekosalema na Bokonzi ya Monaco. Mpo na mbala ya yambo, ekólo ya mibale eleki moke na mokili mobimba nsima ya Vatikan, ekoyamba Mokonzi nganga-Nzambe monene.

Mobembo moye, mozali eyano episkopo ya Roma ayanoli Mokonzi Prince Albert II. Tango bakutanaki nà Tata - Mosantu, na Vatikan, o mokolo mwa zomi na sambo ya sanza ya Yanuali moleki (17 Janvier), apesaki ye mbela ya kokende na ekolo na yé. Mbela enà ezali mpe ya Mgr Dominique-Marie David, archeveque ya Monaco. Mbela eye esalemaki kaka na sima ya boyokani ezali kolandana mpe esangisi dynastie to bokonzi ya libotà ya baGrimaldi nà bakitani ya Petro mpamba tè, kasi mpe na boyokani na makambo etali mopelengano to politiki, kati na bikolo biye mibale Bokonzi ya Monaco (Principauté de Monaco) mpe Ngwende Esantu (Saint-Siege)

Bonene bwa mobembo na maye matali molimo mpe bokengeli bampate

Elembo to logo ya mobembo moye, elakisi na eteni na yango ya likolo, na loboko la mwasi elilingi ya Pàpa na langi ya moyindo mpe mpembe, azali koseke mpe azali kobenisa. Alati bilamba ya milulu, mitre mpe ferule ya ba Pàpa, mp ona kolimbola “Bonene bwa mobembo moye, na maye matali molimo mpe bokengeli bampate”. Na loboko la mobali, elilingi ya ndako ya bokonzi ya Monaco, oyo ezali kokundola “bomoto mpe bokonzi ya Principauté”. Ndako yango mobimba ezali na langi ya mosaka, yango wana soki totali likoló na yango mobimba, ezali komonana lokola nde ezali na bendele to drapo ya Vatikan.

Motó ma maloba ya mobembo: “Ngai nazali Nzela, Bosolo mpe Bomoi”

Eteni ya nse etondi na makomi mazali koyebisa mobembo, mingi-mingi nkombo ya Léon XIV na katikati, mpe liloba Monaco oyo ezali komonana polele na langi ya motane makasi ya bendela to drapo ya ekólo mpe na makomi ya Leta ya Principauté.  Na nse na yango, ezali na maloba maye: “Ngai nazali nzela, bosolo mpe bomoyi” (Yoane 14:6). Makomi mazali komonisa ‘te pápa azali koloba na nkombo ya Kristu mpe ya Nsango na ye.

Na yango, elembo ezali komonisa lokumu la Pápa mpe mosala mwa ye ya bontóma, na boyokani nà lolenge Principauté ezali kolengele koyamba ye. Bokonzi boye bozali kosakola eyamba ya Katoliko, oyo ezali lingomba ya Leta.

Archidiocèse ya Monaco ezali komilengele mpo na koyamba Papa Léon XIV
Archidiocèse ya Monaco ezali komilengele mpo na koyamba Papa Léon XIV

Ndulu ya mobembo na Monaco

Na mokolo mwa 28 ya sanza marsi, Pápa akolungwa na Roma na ngonga ya sambo 7h na mpokwa na hélicoptère ya héliport ya Vatikan mpo na kokende na Monaco, epai bakokutana na ye na ngonga ya libwà 9 na ndako ya bokonzi. Akokutana na Prince Albert II. Na mobembo mwa ye ya ngonga pene na ntuku mibale na minei, Mokitani ya Petro akutanaki na bato banso ba Lingomba ya Katoliko na ndako-Nzambe monene (Katedrale) ya Immaculée Conception, mpe na nsima akokutana elongo nà bilenge mpe bateyi ba Katoliko liboso lya Eklezya Sainte-Dévote. Na Stade Louis II, na ngonga ya 15h30, misa ekosalema; ekokambama na Pápa Léon XIV, yambo ‘te azonga na Roma na 17h45.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

09 sánzá ya mísáto 2026, 21:03