Mokonzi atandeli biso loboko: mateya ma Benoît XVI oyo ebimà naino te
Bansango ya Vatikan
Moko te kati na makomi maye makangisami na “Mokonzi atandeli biso loboko” esilaki naino kobimisama liboso. Ata moko te kati na yango ekomamaki na maboko ma Joseph Ratzinger. Na maloba mokuse ma ebandeli ya búku yango, Sàngó Federico Lombardi, mokambi ya Fondation Ratzinger, alimbolaki ‘te Benoît XVI azalaki kobongisa mateya ma ye na boumeli bwa poso mobimba, na kokanisa mpe komanyola likoló na mikapo mya Biblia oyo batángaka mokolo na mokolo. Mpe lokola azalaki na likoki lya kobosana makambo te, azalaki koloba yango na monoko kasi azalaki kokoma yango te. Mokomeli mwa ye, Mgr Georg Ganswein, azalaki kokoma yango na kobombama to na ndenge ya kobatama mpo ‘te, na ntango moko to mosusu, ntina ya kosalela yango emonana. Nsima ya liwa lya Benoît XVI, bakótisaki bakaseti yango na Fondation Ratzinger.
Mateya masalemaki na bonkutu
Na bongo nde, mateya maye moto soki moko te ayokà nayino, ekotaki na buku yango. Benoît XVI azalaki koloba yango, tango azalaki kosala ba misa yé moko na mwa komite moko ya moke, na mwà chapelle ya ndako ya bantóma, elongo nà Mokomeli mwa yé. Mpe misusu akomaki yango na chapelle ya ndako ya Castel Gandolfo, na ba memores domini oyo azalaki komema, nsima ya kotika episkopo na 2013. Ba homélies oyo ezali na buku oyo, ekomami na kati ya 2005, mbula oyo aponamaki, mpe na 2017, na ntango mpe nsima ya pontificat ya Benoît XVI. Mateya misusu akomaki yango azalaki na monastele Mater Ecclesiae na Vatikan, oyo ezalaki bisika bya nsuka alekisaki na bomoi bwa yé kino mokolo mwa liwà lya yé, o mwa 31 Desembe ya mobù 2022.
Kozelisama ya Buku ya mibale
“Mokonzi atandeli biso loboko to mpe mokonzi asemboleli biso loboko la yé”, ezali bongo, moko ya yambo kati na mikanda mibale oyo ezali kozelisama na mposa makasi, oyo ezali na mateya maye mibimisami naino te. Mokanda ya liboso ezali na mateya mazali kolobela eleko ya Loyà to Adventi, ya Noele to mbotamà, ya Karezimo mpe ya Pasika, na mpe bafeti bisusu bya milulu mya losambo. Eteni to volimi ya mibale ezali na masukulu maye mazalaki kosalema o eleko ya mobù ( temps ordinaire). Na bavolimi yango mibale, ezali na masukulu soki nkamà moko na tuku misato na mitano (135 homelies) maye bato bayókà nayino té, to ebimaki naino liboso te.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
