Luka

Lomingo la mbila: «Yezu, Mokonzi wa Boboto» liboso lya mobulu mwa mokili

Na misa ya mokolo mwa lomingo la mbila la mokolo mwa 29 ya sanza ya màrsi, na Esika Saint-Pierre, Pàpa Léon XIV abyangi bakristu ba landa Kristu na nzela ya ekulusu, ba tala kati na Ye «Mokonzi wa boboto» oyo aboyi mobulu mpe abengisi bato na kozongisa boyokani. Kristu azali kolobi na mokili mwa biso lelo: “Bozala na ngolu! Botika mandoki, bomikundola ‘te bozali bandeko!»

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Nsima ya molulu mwa milongɔó mya mandalala, oyo esalemaki elongo nà banzembo ya makumisi mpe ya esengo. Ut’o ebandeli ya lisukúlu lya ye, Pápa Léon XIV, atyaki molulu mwango na nsé ya elembo ya mobembo elongo na Kristu, Mokonzi ya nkembo. “Awa Yezu atamboli o nzela ya kuruze, tólanda yé nsima”. Nzela eye, ezali nzela ya bolingi ndelo nsuka te, oyo apesaki na biloko binso akeláki: bakristu babyangemi na kotala “malozi ma ye mpo na bato banso ya mokili, motema mwa ye mozoki, bomoi bwa ye oyo emokomisi likabo lya bolingo”.

Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.
Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.   (@Vatican Media)

Mokonzi wa boboto to ya kimya o kati na mobulu

Na kati ya nsango na ye, Tata Mosantu alakisaki Yesu lokola “Mokonzi wa Boboto to ya Kimya”, oyo ezalela ekeseni mpenza na mobulu ezalaki na mokili mwa ntango na ye mpe oyo ezali kosalema lelomei. “Tozali kotala Yezu, oyo azali komimonisa lokola Mokonzi ya Kimya, nzokande etumba ezali kobongisama zinga-zinga ya ye. Ye atikalaki ngwi na boboto, nzoka nde basusu batambolaki na mobulu. Kristu amipesi lokola libondi mpo na bato, nzoka nde basusu basimbi mipanga mpe banzete, elobaki Tata Mosantu. Bokeseni bonà bokómaka makasi na Malozi (Passion): “Azali mwinda mwa mokili, nzokande molili elingi kozipa mokili”. Ayaki mpo na kopesa bomoi, nzokande mokano mwa kokatela ye etumbu ya liwa esili kokokisama”.

Liboso lya kobilama ya mobulu na mokili, Pàpa akundoli’te etindà to mosàlà mwa Kristu, Mokonzi wa molongó, ezali ya kokotisa boyokani kati na mokili mwa bato. Yezu alingi koyokanisa mokili nà ekopi ya Tata, mpe alingi kokweyisa bifelo biye bizalaki kokabola biso nà Nzambe mpe nà baninga ba biso., mpamba te, yen de azali kimya ya biso, (Ep 2, 14). Bokonzi moko ekomonisama na bomikitisi: “Yezu akoti o Yeruzaleme likolo lya mwana mpunda kasi ya mpunda te”. Na yango, akokisi esakweli ya kala oyo elobaki ‘te: “Bósepela mpe bóyoka nsayi na boyei bwa Mesiya” mpamba tè ayei na “Bobolà”, mpe akosakola “Boboto to kimya epai na bikólo”. 

 Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.]
Pàpa Leon ya XIV akambaki Milulu mya Mokolo mwa Lomingo la Mbila to Mandalala, na Vatikan.]
29 sánzá ya mísáto 2026, 17:41