Likita lya bansó: Nzámbe akomilakisa na nzelá ya bolembu ya bikelámu na ye
Jean-René Bompolonga – Kinshasa
Libosó ya mangómbá kilikili ya bato ya mobémbo mwa boyambi, na esika Sántu-Petelo, Mokitani ya Petelo akotaki na mozindo ya likanisi na ye na mokolo eye ya misáto ya yambo ya sánzá ya misáto, na Likambo-likonzi ya Concile Lumen Gentium, Likambo-likonzi ya matéya etáli Eklezia. Na bobándi na mokabo ya yambo, "esika wápi bakoluka libosó libosó ya koyanola na motuná etáli nini waná Eklezia, eye elimbolami lokóla "bosóló bokó ya biténi mingi"”, Léon XIV alendisi yambo ya komituna na eye etáli boíke ena.
"Nini ezali na káti na yangó?" Biyano bikoki kobongwama na moto na moto: "Moto mókó akoki koyanola 'te Eklezia ezali na biténi mingi na motindo 'te ezali "matata", mpe bôngó pási po ya kolimbola"; "mosusu, ekobaki Papá, akoki kokanisa 'te boíke na ye ekoúta na likambo 'te ezali mosála mókó na mokúmbá ya mibú nkóto mibalé ya lisapo, na bilembo bikeseni na biye ya lingómbá mosusu ya bato to ya eyamba".
Na latin, nzokándé, elimbolaki Léon XIV, liloba "complexe" elakisi "lisangá ezali na molongó ya biténi to ba lomeko bikeseni o ntéi ya likambo kaka lyokó". Yangó waná "Lumen gentium ekoki koloba 'te Eklezia ezali eloko mókó ebongisama malámu, epái wápi ba lomeko ya bato mpe ya bonzámbe bizuami elongo, na bokabwani te na mobulúngano te".
Lomeko ya bomoto ekoki komonana
O ntéi ya Eklezia, "lisangá ya mibáli mpe ya bási", lisangá ya bandimi "bakokabola esengo mpe mikakatano ya kozala bakristu, na malámu na bangó mpe mabé na bangó, na bosakoli Nsango-Ndamu mpe kosála elembo ya bozali ya Kristu oyo akotambola na bisó na balabala ya bomoí".
Lomeko ya bomoto ekotisi "bato ya sóló", káti na bangó basusu bakoki "koyókisa pási to kobunga lokóla moto nionso". Nzokándé, elakisaki Sántu-Papá, "ezali mpenza na nzelá ya bilama na ye mpe ba loléngé na ye ya mokili bizali na ndelo ndé bozali ya Kristu mpe ekela na ye ya libiki bikomonana". Lokóla elobaka Benoît XVI, "ezali na botelemeli te káti ya Nsango-Ndamu mpe mosála, epái esusu, misála ya Eklezia bikosálisa mpenza na bosáli mpe na bokokisi ya Nsango-Ndamu na eleko na bisó" (Lisikulu na baepiskopo ya Suisse, 9 ya sánzá ya libwa 2006).
Nzóto mobómbano ya Kristu mpe bolingo ya Nzámbe
Na bokobi litéya na ye, Léon XIV azongelaki lomeko ya bonzámbe eye "ezali kaka te na bobongi (perfection) eye ya malámu to na boleki na molimo ya bilama na ye", esémbolaki ye, kasi "na likambo 'te Eklezia ebotamaka na mwángo ya bolingo ya Nzámbe mpo ya bato, esálemi na Kristu". Waná, "Eklezia ezali bôngó mbala mókó lisangá ya mabelé mpe nzóto ya mobómbano ya Kristu, lisangá ekomonana mpe mobómbano ya molimo, bosóló ezali na lisapo mpe bato mwa mobémbo epái ya likoló".
Bomoí ya Yézu ekokolisa bisó: bato baye bansó bakutanaka na ye, basálaka "boyébi ya bomoto na ye, ya miso na ye na botáli na ye ya boyambi, ya kosimba mabóko na ye eye ezalaki bobenisi bokó, ya eleli ya mongongo na ye mpe ya maloba na ye ya bokangoli mpe ya libiki". Kasi na eleko ená kaka, na bolandi Yézu, "bayékoli bafúngwamaka na bokútáni na Nzámbe". Ya sóló, elobaki Papá, "nsuni ya Kristu, elongi na ye, bikela na ye mpe maloba na ye bikolakisa polélé Nzámbe oyo amonanaka te".
Bosangani mpe likabo
Mpo ya kosúkisa, Papá alimbolaki 'te bosántu ya Eklezia ezali "na likambo 'te Kristu avandi waná mpe akokoba komipesa na nzelá ya moke mpe bolembu ya bilama na ye". Nzámbe "akomilakisa na nzelá ya bolembu ya bikelámu na ye, na bokobi komilakisa mpe kosála", elobaki Léon XIV, na bolendisi ya kotónga "ndáko eye ya molimo eye ezali nzóto ya Kristu, na nzelá ya bosangani mpe ya likabo o ntéi ya bisó".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
