Luka

Likita lya banso ya mokolo ya misato 11 ya sanza ya misato 2026 Likita lya banso ya mokolo ya misato 11 ya sanza ya misato 2026   (@Vatican Media)

Likita lya bansó: "Eklezia ezali yókó, kasi ekotisi bato bansó"

Na bokobi likanisi na ye etáli Mobéko-likonzi ya matéya Lumen Gentium, Papá abonzaki litéya ya mokolo eye ya misáto 11 ya sánzá ya misáto na mokabo ya mibalé ya mokánda ya Concile epesama na "Bána ya Nzámbe". Boyébi ya bato epesami na ekela ya Nzámbe mpe na boyambi ye. Abéngami kozala "mwinda mókó mpo ya bikóló bisusu, lokóla mwinda eye ekobénda bato bansó, bomoto nionso".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Nzámbe, oyo akela mokili mpe bomoto mpe oyo alingi kobikisa mobáli mókó mókó mpe mwási mókó mókó, akosála mosála na ye ya libiki ya lisapo na boponi bato ya sóló mpe na bovandi káti na bangó. Na ebándeli abéngaka Abraham, na bolaki ye "ndalola (descendance) yókó koleka minzóto ya likoló mpe zelo ya ebale". Akosála na sima boyokani na bána na ye, sima ya bobimisi bangó na boúmbu, na botámboli elongo, na bobateli bangó mpe na bosangisi bangó ntángo babúngi. "Nionso waná ezalaki kaka mpo ya kobongisa mpe kolakisa Boyokani ya Sika mpe ya péto eye ekosálema na Kristu, mpe mobómbano eye ekolekisama na Liloba ya Nzámbe ye-méi, akómi moto", ekundolaki Papá, na bozongeli lolaka na mobéko-likonzi ya matéya Lumen Gentium ya Concile Vatican II. Ezali Kristu oyo, "na likabo ya Nzóto na ye mpe ya Makila na ye, asangisi mpo ya libela bato baye na ye", elobaki Tatá-Esántu.

Bomoko ya Eklezia ekozuama na boyingeli na Kristu

Ezali "bato ya bonzámbe, mingi mpenza mpo mokónzi na bangó, Kristu, azali Masiya". "Ezui bozali na ye na nzóto ya Kristu mpe (...) ezali ye-méi nzóto ya Kristu; lokóla bato lokóla bato basusu te, kasi bato ba Nzámbe, basangani na ye mpe ekelami na babáli mpe na bási ya bato bansó ya mabelé". Ekelami na bato ya bikóló binsó, "mobéko lisangisi na ye ezali lokóta lyokó te,’momeseno mókó te, etuluku yókó ya lokóta te, kasi boyambi Kristu". Ekelami na boyambi Kristu, "na boyingeli na ye, na bomoí bokó ekambemi na Elimo ya Mosékwi". Waná, elobaki lisusu Papá, eye ezali na ntina ya sóló na Eklezia, "yambo ya lotómo nionso", ezali ya "kokangema na Kristu, kozala, na ngolu ya bána ba Nzámbe".

Eklezia efúngwama na bansó mpe ezali mpo ya bansó

Mobéko eye ekotambuisa boyokani na Eklezia ezali bolingo, loléngé eyambama mpe emekami na Yézu. Eloko ezali koluka, elobaki Molandi ya Kristu, ezali "Bokónzi bwa Nzámbe, epái wápi ekotámbola na bomoto nionso". Na waná, alakisaki 'te baye bazali na Eklezia basengelaki komikumisa te, matómbá te mpe ba nkombo te, kasi "kaka na likabo ya kozala, na Kristu mpe na Ye, bána babáli mpe bási ba Nzámbe". "Tozali na Eklezia mpo ya kozua ntángo insó bomoí ya Tatá mpe mpo ya kobika lokóla bána na ye mpe bandeko káti na bisó", elobaki Tatá-Esántu. Bongo, "esangisami na Kristu, Mokónzi mpe Mobikisi ya mobáli nionso mpe ya mwási nionso, Eklezia ekoki te komizongisa káti na ye-méi, kasi efúngwama na bansó mpe ezali mpo ya bansó", elobaki ye.

Koyamba bomengo mpe makoki ya mimeseno bikeseni

Epái esusu, Concile esakoli 'te bato bansó babéngami "kozala káti ya Bato ba Nzámbe". Mpo ya kokokisama mpósá ená ya bonzámbe, elakisaki Papá, bato ba Nzámbe, "na botikali lisangá mpe bomoko, babombelami ya kokóma ebelé na ba lomeko ya mokili mobimba mpe na bikeke bikoya". Na ndéngé ená, elobaki Papá wa Roma, atá baye bayambi nanu Nsango-Ndamu te batindami, "na loléngé esusu", epái ya bato ba Nzámbe. "Na Eklezia, ezali mpe esengeli kozala esika yókó mpo ya mókó mókó", elobaki ye, na bobengi mokristu mókó móķó ya "kosakola Nsango-Ndamu mpe kotatola na esika nionso epái wápi akobika mpe akosála". Ezali waná ndé bato bakolakisa bokatoliko na bangó, elobaki lisusu Léon XIV: koyamba bomengo mpe makoki ya mimeseno bikeseni mpe, kaka na eleko ená, kopesa bangó eloko ya sika ya Nsango-Ndamu mpo ya kopétola bangó mpe kokolisa bangó.

Elembo yókó mpe lisakoli lyokó ya bomoko mpe ya boboto mpo na mokili

Ezali elembo yókó enéne ya elikya - "mingimingi na eleko ya biso, eye ezui elembo ya mobúlú mpe ya bitumba" - ya "koyéba 'te Eklezia ezali bato baye bási mpe mibáli ya bikóló, ba nkóta mpe mimeseno bikeseni bizali kobika elongo na makási ya boyambi", esepelaki Papá wa Roma, na bolakisi 'te "na loléngé ená mpo ya Eklezia kozala nzóto ya mobómbano ya Kristu" ezali "elembo yókó ekomami o ntéi kútu ya bomoto, bokundoli bokó mpe lisakoli lyokó ya bomoko ená mpe ya boboto ená na káti ya baye Nzámbe Tatá akobenga bána na ye bansó". Na motindo ená, esúkisaki Papá, "Eklezia yókó kasi ekotisi bato bansó", na boúlanyi yangó na "Maswá Mókó ya Libiki", eye "esengeli koyamba o ntéi ya ye bokeseni insó ya bato"; "Eténi ya ndáko Yókó ya Bosepeli", na káti waná bilei bikokabolama "bikoúta na ekelamu nionso".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

11 sánzá ya mísáto 2026, 15:40