Likita lya bansó: bokónzi ya Eklezia na mosála ya likabo ya Nsango-Ndamu
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Libosó ya bato bébóo basangani na esika Sántu-Petelo na 25 ya sánzá ya misáto, Papá akobaki litéya na ye na ba mbuma ya Concile Vatican II mingi mpenza na mobéko-likonzi Lumen gentium eye akóbombola (explorer) úta bapóso ebelé. Sima ya Eklezia lokóla bato ya Nzámbe, ezali na lomeko na ye ya bokónzi ndé Léon XIV atelemaki mokolo ya misáto eye. «Eklezia katoliko ekozua ntina na yangó na Bapostolu, balingami na Kristu lokóla makonzi ya bomoí Nzóto na ye ya mobombano, mpe ekozua lomeko lyokó ya bokónzi eye ekosála na mosála ya bomoko, ya etindá mpe ya bosántisi bilama na ye nionso», elobaki ye.
Bokitani eye ya bapostolu, esálemi na Nsango-Ndamu mpe Bonkoko, ezui bozindo na mokabo III ya Lumen gentium, ebengami «Mobéko-likonzi ya bokónzi ya Eklezia mpe mingi mpenza ya boepiskopo», ekundolaki episkopo ya Roma. «Concile ekotéya 'te moángo ya bokónzi ezali botongi bokó ya moto te, ekosála na libongisi ya ntéi ya Eklezia lokóla nzóto ya bato (cf. LG, 8), kasi esalelo yókó ya bonzámbe ekoluka kopésa lobiko la nsékó na etindá epésama na Kristu epái ya bapostolu kinó nsúka ya bileko».
Ntina ya bonganga ya ministeli to ya bokónzi
Nkombo ya mokabo III ya Lumen gentium ekosálisa ya kososola likanisi ya Concile, ekobaki Papá: «Ba tatá ya Concile balingaka kolakisa makambo ya ba esalelo ya Eklezia te, lokóla ekokaki koloba nkombo "mobéko-likonzi" na ndéngé esosolami leló. Mokánda etáli mingi "bonganga ya ministeli to ya bokónzi", eye ekeseni "na bonéne mpe kaka na emeko te" ya bonganga-Nzámbe ya bansó ya bandimi, na bolobi lisusu 'te baye "bakuli móķó na mosusu, móķó mpe mosusu", ya sóló, yókó yókó na loléngé ya ye mei, bazali na bonganga-Nzámbe se móķó ya Kristu (LG, 10)».
Concile ekotála ministeli eye elekisami na bato bazui sacra potestas (cf. LG, 18) ya bokónzi esántu mpo ya mosála na Eklezia, na botelemi na moángo misáto biye boepiskopo. bonganga-Nzámbe mpe bodiakono, moángo misáto ya sakraménto se yókó ya Bonganga.
Bokónzi bokó eye ezali mosála mókó na etindá ya Eklezia
«Na libakemi "bokónzi", elimbolaki lisusu Léon XIV, Concile elingaki kopona ebándeli esántu ya ministeli ya bapostolu na ekela ya Yézu, Mokengeli Elámu, mpe boyokani na ye na káti». «Baepiskopo, ya yambo, mpe na nzelá na bangó basángó mpe badiakono, bazuaki misála (na latin munera) biye bikokamba bangó na mosála ya "baye bansó bazali Bato ya Nzámbe, zambi basála na makási na bangó ya lisangá, ya bonsómi mpe ya sémba, mpo ya súka se móķó mpe bakóma na libiki" (LG, 18)».
Mobéko-likonzi Lumen gentium, elobaki Papá, «ekoloba lisapo mbala ebelé mpe na ndéngé ya makási loléngé ya lisangá mpe ya bomoko ya etindá ya bapostolu, na bolobi 'te mokumba ená, epésama na Mokónzi na bakengeli ya bato na ye, ezali mosála ya sóló: na Likomi Lisántu, ebengami polélé "diakonia", elingi koloba ministeli».
Na bopési mbote na bandimi, na súka ya litéya na ye, Léon XIV asengaki kosambela mpo 'te Mokónzi «atindá na Eklezia na ye basáli baye bazali moléndé na likabo ya Nsango-Ndamu, bamipesa malámu na baye bansó bazua batisimo mpe batindami ya mpiko bisika binsó na mokili».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
