Luka

Likita lya bansó ya mokolo ya misato 18 ya sanza ya misato Likita lya bansó ya mokolo ya misato 18 ya sanza ya misato  (@Vatican Media)

Likita lya bansó: bato bazali na etindá ya lisakoli ya Kristu

Na litéya na ye ya mokolo ya misáto ya 18 ya sánzá ya misáto, etáli kaka Mobéko-likonzi ya Concile Lumen Gentium, Papá Léon XIV abeti nsete na mosála ya moto mókó mókó azui batisimo na bomoí mpe etindá ya Eklezia. «Tolamuisa káti na bisó boyébi mpe litondi ya bozui likabo ya kozala káti ya Bato ba Nzámbe; na lokolá mokúmbá eye yangó ekosenga», elobaki Papá wa Roma.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Na boúmeli lisusu na mokabo ya mibalé ya Mobéko-likonzi ya Concile Lumen Gentium (LG), ebonza Eklezia lokolá bato ba Nzámbe, Léon XIV libosó ya bandimi bebo, alobi mingi na litéya na ye mokolo ya misáto ya 18 ya sánzá ya misáto, na esika Sántu-Petelo, likambo ya lokúmu mpe mokúmbá ya mondimi móķó móķó o ntéi ya lisangá ya bakristu.

Bato ya bonganga-Nzámbe, lisakoli mpe bokónzi

Mokánda ya Concile ekokundola 'te «bato ya masiya (LG, 9) bazui na Kristu bozali na mosála ya bonganga-Nzámbe, lisakoli mpe bokónzi esika wápi ekokokisama etindá na ye ya libiki», elobaki ye. Ba Tatá ya Concile, ekobaki episkopo ya Roma, «bakotéya 'te Mokónzi Yézu atiaki, na Boyokani ya sika mpe ya seko, bokónzi bokó ya basángó, na bokeli’bayékoli na ye» na «bonganga Nzámbe ya bokónzi».

Mpo ya Léon XIV, bonganga ená ya lisangá ya bandimi epesami na batisimo, eye «ekopesa bisó makoki ya kokúmisa Nzámbe na molimo mpe na bosóló» mpe ya «koloba libosó ya bato boyambi eye na Eklezia bazuaka na Nzámbe» (LG, 11). Nkótisá, ebakisaki ye, eyéi kolendisa etindá ená na bopesi na bandimi bokási bokó ya motindo ya Elimo Sántu, na bobengi bangó ya kobátela mpe kosakola boyambi «na liloba mpe na ekela».

Etindá yókó ekabolami káti ya bansó

Lisusu, ekobaki ye, na sakraménto ya nkótisá, baye bansó bazua batisimo «bakangami kitoko koleka na Eklezia, bazui bomengo ya bokási bokó ya ntina ya Elimo Sántu mpe lokolá bazali na lotómo ya kopanza mpe kobátela boyambi na liloba mpe na ekela ya ba nzeneneke ya sóló ya Kristu». Yangó waná, bozui sakraménto ená, emonaki ye, ezali ntina ya «etindá ya lisangá eye esangisi basángó bakula mpe bandimi laíki". Emoniseli ena, elobama kála na Concile Vatican II, elobami lisusu makási mibú miye mileki, mingi mpenza na Papá François, oyo azalaki kolakisa 'te boyébi ya bomoto na yo ya mokristu ebotami yambo na batisimo.

«Kotála bato ba Nzámbe elingi koloba kokundola 'te tokosála bansó bokoti na bisó na Eklezia lokolá balaíki. Sakraménto ya yambo, eye ekokanga mpo ya seko boyébi na bisó ya bomoto na bisó mpe eye tosengeli kozala kaka na lolendo, ezali batisimo. Na nzelá na yangó mpe bopakoli mafuta ya Elimo Sántu, (bandimi) "bobonzami mpo kozala ndáko yókó ya molimo mpe ya bonganga bokó esántu"», elobaki Papá y'Argentine. Bongo, mondimi mókó mókó akómi mosáli ya bopanzi Nsango-Ndamu, abengami kobika boyambi bokó elati nzóto mpe elongobani. «Bokuli na bisó ya yambo mpe ya ntina ekozua misisa na yangó na batisimo na bisó», elobaki lisusu Léon XIV na bozongeli bongo esika yókó ya mokánda ya Papá François na Mokónzi ya Commisio ya Papá mpo y'Amerika ya latin, ya 19 ya sánzá ya misáto 2016.

“"Ngalasisi ya bonganga-Nzámbe ya bokónzi ekosálema na ndéngé ebelé, nionso bikambemi mpo ya bosántisi bisó, yambo ya bozali libonza ya Ukaristiya. Na losámbo, bobateli mibéko mpe likabo na bosáli, tokotatola bongo bomoí ya sika na ngolu ya Nzámbe (cf. LG, 10)"”

«Sensus fidei»

Batatá ya Concile, elakisaki lisusu Léon XIV, batéyi lokolá 'te «bato basántu ba Nzámbe bazali lokolá na etindá ya lisakoli ya Kristu» (cf. LG, 12). Ezali na loléngé ená ndé bakotisaki, elimbolaki Papá, likambo-likonzi ya ntina ya «liyoki ya boyambi mpe ya bondimi ya bandimi». Commisio ya matéya ya Concile esémbolaki, elobaki Sántu-Papá, 'te sensus fidei ená «ezali lokolá likoki lyokó ya Eklezia mobimba, likoló na yangó eyébi na boyambi na ye bosakoli elekisama, na bokesenisi malámu na eye ya mabé na mituná ya boyambi, mpe kaka na eleko ená, ekokota kúna na mozindo koleka mpe ekosálela yangó na mobimba na yangó na bomoí». «Ntina ya boyambi ezali bôngó na bandimi na ndéngé ya moto ye mókó te, kasi lokolá bilama ya bato ba Nzámbe na lisangá na bangó", elobaki ye.

Bozangi libunga ya Eklezia

Lumen gentium ekolakisa mingi na «sensus fidei» mpe «ekokangisa na bozangi libunga ya Eklezia, eye ekangami, na kosálela yangó, eye ya Papá wa Roma». «Lisangá ya bandimi, bazua bopakoli eye eúti na Elimo-Sántu ekoki komikosa te na boyambi; likabo ená ya ntina eye ezui, ekolakisa yangó na nzelá ya liyoki eleki mokili ya boyambi eye ezali eye ya bato bansó, ntángo, baepiskopo kinó na bandimi laíki ya súka, ekomema ba bosóló mitáli boyambi mpe bizalela bondimi ya mokili mobimba», elobaki ye.

Eklezia, lokolá lisangá ya bandimi eye ekotisi babateli, elobaki Léon XIV «ekoki komikosa te na boyambi: enama ya esika ya mokónzi, etongami na bopakoli ya Elimo-Sántu, ezali liyoki ya koleka mokili ya boyambi ya bato bansó ya Nzámbe, oyo asálaka na bondimi ya bandimi». Na bomoko ená, eye Motéyi ya Eklezia abatelaka, ekosálema 'te moto mókó mókó «azua batisimo azali likambo lyokó makási ya bopanzi Nsango-Ndamu, abengami ya kotatola Kristu na ndéngé elongobani engebene na likabo ya lisakoli eye Mokónzi akotisa na Eklezia na ye mobimba», elobaki Papá wa Roma.

Eklezia yókó ya bomoí mpe na bomengo ya bangenge

Elimo-Sántu, «eye eúteli bisó na Kristu Asékwi», ekokabola «o káti ya bandimi ya ndéngé nionso ba ngolu ya ntina biye bikokomisa makási mpe nguyá ya kosála misála ndéngé na ndéngé biye bizali na ntina ya bozongisi sika mpe bomátisi ya Eklezia», elobaki Papá.

“"Bomoí emibonza, eye ekotika kokola mpe kobota fololo te na nsé ya ekela ya ngolu, ekopesa bolakisi ya bomoí ená ya ngenge. Ba motindo ya lisangá ya Eklezia bizali lokolá ndakisa yókó ya mwinda ya bokaboli mpe ya boboti ba mbuma ya molimo mpo ya botongi Bato ba Nzámbe."”

«Tolamuisa káti na bisó boyébi mpe litondi ya bozui likabo ya kozala káti ya Bato ba Nzámbe; na lokolá mokúmbá eye yangó ekosenga», esukisaki Papá wa Roma.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

18 sánzá ya mísáto 2026, 16:56