Léon XIV: Na kosunga, tokómaka bisaleli bya Mokonzi
Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC
Liyebisi lya Pape etaleli mingi lisese lya Mo-Samaria malamu. “Yesu ateyaki biso ‘te mpo na koyeba lolenge la kosalisa bazalani to baninga ba biso, tosengeli kolanda ndakisa ya Mo-Samaria ya boboto, oyo apesaki tango na ye kozanga kokakatana mpe apesaki biloko bya ye na yoko moto atikalaki komona nayino te. Papa alobi lisusu ‘te “Lolenge la Nzambe ezali ya kozala pene na baninga, ya kozala motema mawa mpe ya kolinga na boboto”.
Bokutani na Kristu na nzela ya lisalisi na baye bazali mike koleka
“Tango tozali kosalisa bato baye bazali na bosénga, mingi mpenza baye bazali na likoki te ya kozongisela biso, tokómi esaleli ya Mokonzi”, Emonisaki Pàpa. Bongo abakisaki ‘te “moto nyonso oyo azali komonisa bolingo epai ya mozalani na ye azali komonisa mwinda mwa bolingo bwa Nzambe”. Na likambo liye, Tata Mosantu amonisi ‘te makabo ya FADICA-Catholic Philanthropy Network na ba programmes oyo ezali kobakisa bosembo ya bato, kolendisa mateya ma katoliko, kobatela lokumu ya bato mpe kobatela bato baye bazali na makoki te bazali mpenza elembo ya bolingo bwa Nzambe”. Na yango, mposa na ye ezali ‘te mosala mwa bango epesa bato basusu mposa ya kokutana na Kristu na nzela ya kosalela bandeko na ye mibali mpe basi oyo bazali na bolembu, mpe na kosangana tango inso na etindà to mosala mwa Eklezya na motema mobimba.
Boboto bwa Nzambe epai na baye bazali kosalela bato bazali na bosénga
Na nsuka ya maloba ma ye, Mokonzi monene wa Eklezya alendisaki bato ya Réseau na kokoba na “mokumba na bango ya lokumu”, mpe ayebisaki bango “te “Mokonzi wa Bokasi bonso akozanga te kokabela baoyo bazali kosalela babola”. Wana azalaki kolaka bango losambo la ye, Tata Mosantu apesaki basangani banso ya FADICA-Catholic Philanthropy Network na “bolobeli bwa Ngondo Maria, Mama wa Eklezia”, mpe apesaki bango bobenisi bwa ye ya bontomà, lokola ndanga ya kimia mpe esengo kati na Mokonzi”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
