Luka

2026.03.12 Pàpa Léon XIV, tango ayambaki bayangani ya molulu mwa minei ya bokutani ya «Kiti ya koyamba bapaya», o mokolo mwa minei mwa 12 ya sànzà ya màrsi. 2026.03.12 Pàpa Léon XIV, tango ayambaki bayangani ya molulu mwa minei ya bokutani ya «Kiti ya koyamba bapaya», o mokolo mwa minei mwa 12 ya sànzà ya màrsi.   (@Vatican Media)

Léon XIV: kozala mpe kobatela, makonzi mibale mpo na koyamba bapaya

Na tango ayambaki bayangani ya molulu mwa minei mya “ Kiti ya koyamba bapaya” na Salle Clémentine na Vatikan, Tata Mosantu abimisaki makanisi ma ntina etali kozala mpe kobatela. Alendisaki baye bayambaki ye ‘te bátalela bilenge te lokola bato bakoya nsima, kasi lokola “bato baye bazali na bomoi mpe bazali kobotisa makambo” maye mazali kosénga boyokani bwa sika ezonga kati na baeklezya.

Bansango ya Vatikan

 

Na kati ya ezalela ya bondeko, Pàpa Léon XIV afungolaki misala ya “Kiti ya koyamba bapaya”, o mokolo mwa minei, mwa 15 ya sanza ya màrsi. Ezali likanisi lya lisanga Fraterna Domus. Na lisukulu la ye, Pápa akanisaki lisusu ‘te koyamba bapaya ezali kaka likambo lya bato te, kasi ezali mokumba ya bakristu euti na maloba ma lokotà ya Latin accipere: “koyamba” mpe “komema elongo na yomei”.

Bolenge, likabo tosengeli koyoka

Lokola zulunalo yango ezalaki kolobela mingi mpenza bilenge, yango ezali kosnga na eklezya ebongola lolenge na yango ya kotalela to komonela makambo. Mpo na Léon XIV, bilenge bazali kaka bazwi ya libula ya lobi te, kasi bato baye bazali kosala makambo ma mokili mwa lelo. “Mituna mpe mitungisi na bango ezali kosɛnga biso ete tóbongola lolenge ya boyokani na biso na bango. Koyamba bilenge elimboli liboso koyoka mingongo na bango, kotala bango”. Lisusu, Pápa alobaki ‘te Molimo Mosantu asalelaka mpenza elobeli mpe bomoi bwa mabota ma sika mpo na kolakisa na Eklezia “banzela ya sika ya kozala mpe ya kobatela”.

Kozala mpe kobatela: makonzi mibale

Tata Mosantu abongisaki lisikulu na ye, zonga zonga ya makanisi mibale ma ntina. Akokanisaki yango na “miinda mibale” mpo na nzela ya boyambi bapaya: kozala mpe kobatela. Amonisaki ‘te, kozala na ndako ya Nzambe ezali likambo lya moto ye moko te, ezali nde likambo ya baye bazali kolekisa ntango elongo mpe bazali kokutana na makambo ndenge na ndenge na kati ya libota, na eteyelo to na parwasi. Na komonisa lisolo lya Yezu oyo abungaki mpe bayei komona ye na tempelo, episkopo ya Roma alobaki ‘te bozali ya moto mosusu ezali mbuma ya “bolukiluki na molende inso”. “Koluka Yezu, alandi na koloba, elingi koloba kolongwa na maye tozali kokanisa ‘te ezali libateli na biso, mpo na komema mokumba ya bokutani, koyekola komona mpe koyamba, bozali bwa Nzambe oyo ezali tango inso ‘epusi’”

Ndakisa ya Santu Yozefu

Na kotalela ndakisa ya Mobateli ya libota lisantu, Léon XIV alimbolaki libateli lokola likanisi lisantu lya mwinda mpo na basusu, na limemya mpo na makambo oyo bango baponi mpe na kokanisa mpo na baye bazali na mpasi. Amonisaki ‘te makambo mana mibale makoki kokabwana te:

““Okoki kobatela te soki ozali te, bongo mpe okoki kozala te, soki oyebi komema mokumba ya basusu”.”

Na kozongelaka encycliki Fratelli tutti, Pápa asukisaki lisukulu la ye. Akanisaki bango lisusu ‘t’ bobele avenire oyo esimbami na boyambi ya ofele nde ekoki kopesa horizon na bankóla ya sika. Alendisaki na nsuka baye bayanganaki «bàzala batangisi to balakisi ya basi mpe babali ya koyamba bapaya», mpe bàkolisa ezalela ya boyoki bwa Elimo, mpo na kotonga lisanga lya bato na bondeko, kasi ya komitala te.  

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

12 sánzá ya mísáto 2026, 17:51