Luka

2021.06.09:: Pape François na tango ya forum Amoris laetitia na 2021. 2021.06.09:: Pape François na tango ya forum Amoris laetitia na 2021.  

Léon XIV abyangi yoko likita mpo na kosakola Nsango Elamu o mabota

Na libakù lya bokundoli mibu zomi ya ekzortation apostoliki Amoris laetitia ya Pàpa François, Léon XIV ayebisi ‘te na sanza ya oktobe ya mobu 2026 akoyangana elongo nà bakambi bya ba masanga ya baepiskopo ya mokili mobimba mpo na kokanisa lolenge ya kosakola Nsango Elamu o mabota mya lelomei. Na liyebisi ebimisami o mokolo mwa 19 sanza ya marsi, Tata Mosantu apesi matondi mpo na maloba ma mokitani na ye mpe amonisi ‘te sima ya mibu zomi, mbongwana ya mokili ekosala ‘te Eklezya ebongama lisusu..

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Leon ya XIV abyangi na likita na sanza ya okotobe ya mobù 2026, bakambi ya masanga ya baepiskopo ya mokili mobimba, “mpo bayokana nakososola elongo mp ona mokano ya kozwa, na maye matali kosakola Nsango Elamu o kati ya mabota mya lelomei, na nzela ya mwinda mwa d’Amoris laetitia, mpe na kotalela maye mazali koleka na ba Eklezya ya bamboka”. Liyebisi linà ebimaki o mokolo mwa 19 ya sanza ya marsi, mokolo mwa bokundoli mokanda mwa mokitani na yé.

Mibù zomi sima ya kobima na ya ezortation apostoliki sima ya sinodi ya Francois, “na ntina ya bolongani na libala mpe ya libota”, Léon ya XIV akanisi ‘te “mokano mwa Eklezia” esengeli kozongisama sika mpe kokota o bozindo,  mpo ‘te baoyo Mokonzi abengà na libala mpe bazali na bolingo ya libala na bango kati na Kristu mpe bilenge bazala na mposa ya makasi ya libala kati na Eklezia”.

Pàpa François na Irlande na mobù 2018 na tango ya bokutani bwa mokili mobimba ya Mabotà
Pàpa François na Irlande na mobù 2018 na tango ya bokutani bwa mokili mobimba ya Mabotà   (Vatican Media)

Koyeba bolembù

Mpo na ye, mokano mwa Pápa euti na likambo oyo ‘te “eleko ya biso etondi na mbongwana ya mbangumbangu”. Na mibu zomi, “na bisika mpe na makambo maye eklezia ekoki kokóma mungwa mwa mokili” bobele na nzela ya bandeko bakristu ya mokili, mpe mingimingi, mabota” oyo ebimaki to epalanganaki.

Mpo na Léon XIV, “kokokisa mokumba ya kosakola Nsango Elamu ya libota epai ya bilenge” eséngaka koyekola “koyeba kitoko ya libyangi na libala”. Esengeli kosala bongo mpo na koyeba “bolémbù” bwa yango, mpo na “kolamwisa” elikya na yango kati na ngolu mpe mposa ya kozala na bomoi bwa mwinda. Papa alobi ‘te, “kozanga kolongobana wana ezali eteni ya kitoko ya bomoto na biso”, mpo “tozali te mpo na bomoi oyo ezali na eloko moko te mpe ezali kowumela, kasi mpo na bomoi oyo ezali ntango inso kozalisama na likabo, na bolingo". Na ngambo mosusu, Tata Mosantu abosanaki te mabota maye mazali konyokwama na “misala mingi ya bobóla mpe mobulu oyo ezali na mokili mwa lelo”, oyo esengeli kosunga.

Amoris Laetitia, liteya moko ya motuya

Makanisi manso maye Léon XIV abéngaki na ntina ya bosengà bwa yé, esengeli kolendisama na Amoris laetitia oyo, na maloba ma ye, ezali kopesa «mateya ma motuya» oyo esengeli kotalela yango o bozindo. Na ndakisa, atángaki «Elikya ya Biblia ‘te Nzambe azali na bolingo mpe na motema mawa, oyo esalisaka moto azala na masolo ma bolingo, atako azali na mpasi o kati ya libota; mpe abengaki bango bátala sé Yezu mpo na kolendisaka mbala na mbala «bokoli, bobondisi, mpe bokolisi o bozindo ya bolingo ya balóngani mpe ya libota». Mbela ya komona ‘te bolingo na libala, ezali ntango inso kopesa bomoi, mpe ezali ya solo na lolenge na yango, ya komekola mpe ya mabele».

Léon XIV alobeli mpe «bosenga ya koluka banzela ya sika mpo na kobatela bampate» mpe « kolendisa mateya ma bana » « na ntango azali kobenga Eklezia mpo na «kolanda, kososola mpe kosunga, mpo na kotikáká likanisi lya kokitisa bato na makambo ya malamu, mpe na kotombolaka  elimo oyo eutaka na bomoi ya libota», lokola likomaki mokitani na ye.

Na mibu zomi moye, Tata Mosantu alingi kopesa matondi na Mokonzi mpo na molende na ye ya koyekola mpe ya kobongola lingomba, bongo mpe asengi ye ‘te akoba na nzela wana.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

19 sánzá ya mísáto 2026, 14:10