Kotombola bonsomi, Léon XIV akozwa Palata ya Bonsomi
Bansango ya Vatikan
O mokolo mwa 3 ya Yuli mokoyà, ekozala nà mwa molulu moko na miso ma bato. Na libakù linà, National Constitution Center akopesa Pàpa Leon ya XIV, mbano ya bonsomi ya mbala ya tuku misato na mwambé (38e). Ekosalema na mokolo moye mokozala liboso lya milulu mya mibu 250e ya ebandeli ya Etats-Unis, na libanda lya Independence Mall na Philadelphie. Mbano yango ezali mpo na mosala Pápa asalaki mpo na kotombola bonsomi ya losambo, ya makanisi mpe ya koloba na mokili mobimba, oyo epesamaki na ba Pères fondateurs ya États-Unis na mokanda ya liboso ya mibeko ya États-Unis. Léon XIV akànàki kosala lisukulu la ye ya kopesa matondi na nzela ya Internet, ut’o Vatikan.
Matondi mwa Ntómà monene
Matteo Bruni, mokambi ya ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan, alobaki ‘te Pápa azali na botóndi mingi «mpo na lokumu loye ba poni kopesa yé, na mokolo ya bokundoli mbotama oyo ezali na ntina mingi mpo na bato ba Amerika, oyo babengami mpo na kokanisa mibu 250è ya lisoló na bango, ya kobatelaka Mobeko ya lipanda, Mibeko mya Etats-Unis mpe bonsomi, lokola bilembo bya libula na bango mpo na mabota mya mikolo mizali koya».
Mokano mwa Léon XIV mpo ya kosolola
Lisoló ya bapanzi-nsango ya Centre national ya Constitution emonisi ‘te Pápa azali na mposa makasi ya kosolola nà bato bya mangomba misusu mpe nà bato ba mokili mobimba. Bakoki koloba ‘te mosàla to bikateli bya yé «Ezali komonisa likanisi lya malamu oyo etalelaka bonsomi ya losambo lokola lotomo ya mpamba te, kasi lokola elembo ya bomoto ya moto, mingimingi mpo na bato baye bazali na nse ya bato banso, na ndakisa, bato ba mangomba ya mike mpe baoyo bazali na bitumba".
Lolenge ya Bokeseni na kopono
Centre national ya constitution ya Philadelphie esangisi bato ya mibu mpe ya bomoi ndenge na ndenge, oyo bawuti na mokili mobimba, mpo na koyeba, kolobela mpe kosepela na likanisi ya bonsomi ya bato oyo ekomami na Constitution ya Etats-Unis. Palata ya Bonsomi to Médaille de la Liberté esalemaki na 1988 mpo na kokundola mibu 200 ya Constitution ya Etats-Unis. Mbula na mbula, bapesaka mbano yango na bato mpe bibongiseli bya mpiko mpe ya molende oyo bamipesi mpo na kopesa bonsomi na bato ya mokili mobimba.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
