Luka

Angélus: Boyambi ezali kosalisa biso tómona mpasi ya bato ba mokili

Pàpa nakolimbola Nsango Elamu, na tango ya Angelus ya lomingo la minei ya Karézimo, Léon XIV abengaki bakristu na kolakisa bomoi bwa bango oyo ezali ya kolamuka mpenza, ya bokebi mpe ya esakweli. Ezala mpe na ntina mpo na kolónga makambo ma kozanga bosembo mpe bampasi ya tango na biso. Pápa alendisaki bakristu ‘te bámipesa na “kimya, bosembo mpe bomoko”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mokolo mwa lomingo loye la minei ya eleko ya Karézimo, Pápa Léon XIV atyaki makanisi ma ye na eteni ya Nsango Elamu lokola likomami Santu Yoane, oyo elobeli kobikisama ya moto ya lolànda to moto akufà miso ut’o mbotama ya yé (Jn 9:1-41). Na kati kuna Yoane alobeli biso makamwisi mwa lobiko (…) nzoka nde mokili mozalaki kotambola na molili (tala na Is 9, 1), Nzambe atindi mwana w aye, mwinda mwa mokili, mpo ya kofungola miso ma bato balolàndà (bato bakufa miso) mpe kongalisa bomoi bwa biso”. Elimbolaki Tata Mosantu, liboso lya bankoto tuku mibale ya bato basanganaki na esika Saint-Pierre, ut’o lininisa lya ndako ya bantómà. Kutù Leon ya XIV, asilaki kokende kokóta o ndako ya yé, na polele o miso ma bato, Léon XIV a officiellement emménagé la veille.

Episkopo wa Roma akanisaki lisusu na bato ‘te: “Baprofeta basakolàkà ‘te Mesiya akofungola miso ma bato balolandà. Solo tokoki koloba ‘te biso banso tózali bato bakufà miso ut’o mbotama ya biso, mpamba te, biso moko, tokoki komono ‘te, makamwisi mya bomoi bwa biso”. Bongo mpo ya kobimisa bandimi na bolàndà bonà bya molimo, “Nzambe akomaki moto na nzela ya Yezu, mpo te potopoto ya bomoto bwa biso, oyo etondisàmà na ngolu na yé, eyeba kozwa mwinda mwa sika. Yango ndé, ekoki kosalisa biso na koyeba Nzambe mpe biso moko na kati na bosolo”.

Ezali likambo ya kokàmwa na komona ‘te na boumeli bya bikeke, likanisi yango epalangani, ezali tee kino lelo, engebene na yango, boyambi ekokaki kozala lolenge moko ya “kopumbwa na molili”. Ezali lokola kotika makanisi, ya kobanza ‘te, kozala na boyambi ekolimbola kondima “na miso ekufà”. Etuni ye Pàpà. Nzokande, Nsango Elamu ezali kolimbola biso ‘te, «na bokutani nà Kristu, miso mwa moto esilaka kofungwama».

Soki babikisami na Kristu, bakristu babyangemi na kozala “na miso ya kofungwama na boyambi bwa bango”. Boyambi ezali mosika na kozala likàmbo la kibolàndà, to “likambo lya kozanga komona, likambo ya kowangana makanisi, kokangama na makanisi mya mangomba mizali kokabola biso na mokili”, kasi ezali nde “Bosangani na lolenge ya komona” lokola emoneli ya Yezu. (tala yango na Lumen fidei, n. 18). Na yango, Léon XIV alimbolaki ‘te, “Azali kosénga na biso tófungola miso na biso, lolenge asàlàki, mingi mpenza mpo na komona mpasi ya bato basusu mpe mpota oyo ezali na mokili”.

“Mpo na moyi mwa lelo, boyambi bwa biso esengeli kozala ya kolamuka, boyambi ekofungola miso ma biso na molili mwa mokili mpe ekomemela biso mwinda mwa Nsango Elamu na nzela ya komipesa mpo na kimya, bosembo mpe bomoko.”

Léon XIV abyangaki bakristu na kosambela, mpo ‘te: “na nzela bolobeli bwa Ngondo Maria, mwinda mwa Kristu efungola miso mya mitema mya biso, bongo tokoka kozala banzeneneke ba Ye na bosolo mpe na mpiko”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

15 sánzá ya mísáto 2026, 23:27