Pàpa : ata moto oyo azali na boyambi te, akoki koluka Nzambe
Bansango ya Vatikan
“Bakoki te kotanga lokola athée (moto andimaka te ‘te Nzambe azali) moto oyo alingaka Nzambe, oyo alukaka ye solo na motema semba”. Wana ezali eyano Pápa Léon, apesaki. Azongelaki maloba ma Santu. Augustin, na Rocco ya Reggio Calabria oyo atindelaki zulunalo “Piazza San Pietro”, oyo ebimisami na Vatikan. Na nimero ya Febwali, Pápa atondoki botondi Rocco mpo na loyembo la ye oyo kati na yango asengaki lisungi mpe atunaki soki moto akoki komitánga lokola moto oyo andimaka te ‘te Nzambe azali mpe lolenge yoko akolingaka Nzambe.
Koyeba Nzambe ontei ya yomei
“Nandimi te, na zali na boyambi ata moke te, nazali kaka na mposa ya Nzambe. Yango ndé likàmà (Drame) na ngai - ebakisaki Rocco na poème na ye – Ezali nde Nzambe, eloko ekotungisa ngai”. Eloko olobi, eyanoli Papa, ekundwelaki ngai mbala moko, maloba maye tata wa ngai molingami, Saint Augustin akomaki na buku ya yé: les Confessions ‘te: “Ozalaki o kati na ngai, mpe ngai na libanda na ngaimei. Na ntango wana, nazalaki koluka yo”. Maloba yango ezali komonisa polele ‘te koluka Nzambe ezali likambo liye moto asengeli kosala.
Na boluki elongi ya yé nde lokumu la bomoto bwa bomoi ya moto lizwami
“Pápa Léon XIV alobaki lisusu ‘te: Motuna ma ntina mpo na kondima ezali té ya kondima to koboya kondima ete Nzambe azali, kasi ezali ya koluka ye!" Amitikaka ‘te motema moye mozali koluka ye, emona ye. Mpe, mbala mosusu, bokeseni ya kosàlà bozali solo kati na mondimi mpe moto oyo azangi boyambi té, kasi kati na baye bakoluka Nzambe mpe baye bakoluka ye tè. Na nsima, Pápa abakisaki ‘te, moto akoki komilakisa ‘te azali mondimi, kasi azangi koluka elongi ya Nzambe; mpe na bongo akozala na bozangi kolinga ye. Nzokande, moto akoki kondima ‘te azali na kondima te, kasi akoki kozala “Moto makasi ya koluka elongi ya ye, kolinga yango”, esukisaki ye bóngó koloba na Rocco, mpe abakisi ‘te “yo azali kosala yango lokola”. Ya solo, biso banso tozali na mposa ya bolingo, tozali koluka Nzambe. Mpe yango nde esika lokumu la bomoto mpe bonzenga bwa bomoi bwa biso lizwami.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
