Luka

Pàpa Leon ya XIV na nsuka ya ngalasisi ya Karézimo na yé ya mbala ya yambo lokola ntomà. Pàpa Leon ya XIV na nsuka ya ngalasisi ya Karézimo na yé ya mbala ya yambo lokola ntomà.   (ANSA)

Na miyokaki mbela ya komaniola : elobi Leon ya XIV na bosukisi Ezuzulu to Ngalasisi ya molimo,

Na nsuka ya Ezuzulu ya Karézimo, Pàpa Leon XIV azwaki maloba mpe apesi melesi na motei, Mgr Varden, mpo ya mateya matalaki litatoli ya bomoi ya monastele. Abeti nsete na likambo lya elikya, bonsomi mpe bosóló mpamba tè ezali na motuya makasi kati na bomoi bwa biso. Lokola Santu Polo, Pàpa abyangi na «ezalela elongobani na Nsango Elamu ya Kristu»

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

«Na ndimi sóló ‘te liloba esimbaki ngai mpe na miyokaki mbela ya komaniola yango tango moko boye. Neti na tongo ya lelo, tango alobelaki maponomi ya Pàpa Eugène, mpe tango Santu Bernard atuni “Bino bosali nini?” “tika ‘te Nzambi asunga bino!”». Na matumboli mpe màseki esekisaki bato ba Curie oyo bazalaki na chapelle ya Paul VI, Leon ya XIV asukisaki bongo o mokolo mwa mitano mwa 27 ya sànzà ya Febwàli, ngalasisi ya Karézimi ya 2026, oyo ebandaki o mokolo mwa Lomingo sima ya nzàngà. Nganga-Nzambe monene azwaki maloba na mpokwa, sima ya mokolo mwa zomi na moko mpe ya nsuka, ya ngalasisi ya Mgr Erik Varden, episkopo ya Trondheim na Norvège. Atondoki ye botondi mpo ya mateya apesa ye mpe Curie mobimba, na mikolo miye batambolaki elongo na losambo mpe bomaniolie.

Likambo ya kitoko mpenza

«Ezali likambo moko kitoko mpe ya motuya mpenza mpo ya etamboli ya biso na eleko eye ya Karézimo», elobi Leon ya XIV mpo na ngalasisi ya molimo basalaki na esika eye etondi bilembo mpenza, chapelle Pauline. Bakutanaki kuna elongo, baepiskopo banso bwa lokùmù, o mokolo mwa 8 ya sànzà ya Mayi ya mobù 2025, mokolo mwa boponomo bwa Robert Francis Prevost, mpo na milulu mya Ukaristya. Liloba esimbaki motema mwa Pàpa Leon, ezali eteni ya yambo ya mokanda mwa santu Polo ónà ba Filippi, o molongo mwa 21, oyo elobi : «Sóló mpo ya ngai, bomoi bozali Kristu, mpe kokwà ezali litómbà». Azongelaki eteni ya liloba liye mpo ya «bomanioli bwa elikya, mingi mpenza mpo ya kososola ‘te Kristu azali sóló liziba lya elikya ». Pàpa Leon alobelaki mpe eteni mosusu ya liloba (fil 1, 27), nde yango mpe mbela asalaki na banso, na nsuka ya mikolo miye ya losambo : «Kasi mpo ya bino, botambola na lolenge elongobani na Nsango Elamu ya Kristu».

Pàpa Leon ya XIV asanganaki na Ezuzulu ya eleko ya Karézimo - Komanyola likoló na bosembo
Pàpa Leon ya XIV asanganaki na Ezuzulu ya eleko ya Karézimo - Komanyola likoló na bosembo   (@Vatican Media)

Bonsomi, Bosóló, Elikya

Na molimo monà ya lisàngà, tika ‘te biso banso tosangana mpo na kosala elongo”, elobaki Pápa. Tango mosusu tozalaka ya “kokabwana”, yango wana “koyangana na losambo” ezali “tango ya ntina mingi mpo na bomoi bwa biso, ntango ya komaniola makambo mingi mya ntina mpo na biso mpe mpo na Eklezia”. Azongelaki mpe maloba ma Santu John Henry Newman, episkopo wa lokumu lya Lingelesi, na poème na ye “Le Songe de Gérontius”; na kati abyangaki batangi “bàmona lolenge oyo azalaki kobanga liwa mpe ndenge azalaki komimona ‘te, abongi te na miso ma Nzambe”. Na nsima, alobelaki biloko bisusu lokola “bonsomi” mpe “bosóló”, mpamba tè, alobaki ye, ezali “makambo ma ntina mingi o kati ya bomoi bwa biso”.  

Loyembo etombolaka molimo epai ya Nzambe

Na nsuka ya lisukulu na ye, Pápa apesaki lisusu Mgr Varden matondi mpo na bwanya bwa ye, litatoli mpe mateya ma bomoi ya monastele ya Saint Bernard ya Clairvaux, mpo ya bomengo bwa makanisi ma ye. Alobi ‘te ekozala ntango inso liziba lya mapamboli mpe ya ngolu. Apesaki mpe matondi na bato ba misala mya misa mpo na bisika babongisaki mpe na bayembi mpo na miziki oyo bayembaki na losambo. Mpamba tè, engebene na Pàpa, “loyembo esungaka biso na lolenge oyo, maloba makoki te ko lakisa, boniboni kotombola milimo mya biso na Mokonzi”.

Ezuzulu ya Karézimo - Komanyola likoló ya Bernard,le realiste
Ezuzulu ya Karézimo - Komanyola likoló ya Bernard,le realiste   (ANSA)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

28 sánzá ya míbalé 2026, 09:35