Manáka mya milulu mya Pápa Léon XIV kino na Eleko ya Pasika
Bansango ya Vatikan
Motuya moye episkópo ya Roma azali kopesa na bakristu ba dioseze na ye emonisami na lolenge moko ya sikisiki, na nzela ya molongo mya mibembo Léon XIV akosala na baparwasi mitano ya Roma, oyo ekanisami kobanda mokolo mwa lomingo mwa zomi na mitano ya Febwáli (15 Fevrier) kino mokolo mwa lomingo mwa zomi na mitano ya sànzà ya Mársi (15 Mars). Kozala ya Pápa na kartié ya malweka ya engumba-mokonzi ekokani nà bizuzulu ya eleko ya Karézimo mpe na milulu ya Pasika, oyo akokamba na Saint-Pierre mpe na Saint-Jean-de-Latran, o Mokolo mwa minei Mosantu.
Kokende kotala Baparwase
Kokende kotala Baparwase ekobanda na nsima ya nzanga na ngonga ya 17h00, epai wapi akokamba milulu mya Ukaristya. Longola mokolo mwa tuku mibale na mibale ya Febwali to 22 fevrier, Pàpa akokende na Parwase ya Sacre-Cœur ya Jésus na CastroPretorio, Pembeni ya Gare Termini. Kuna ndé bakozela ye mpo ya misa na tongo na ngonga ya 9h00. Mobembo mwa liboso likosalema o mokolo mwa zomi na mitano ya Febwali na parwase Santa Maria Regina Pacis, na Ostia Lido. O mokolo mwa yambo ya sànzà ya Marsi ti 1er Mars, akokende na Parwase ya Ascension (Mbuta ya Mokonzi wa biso Yezu-Kristu) na kartié Alessandrino. O mokolo mwa mwambe ya Marsi (8 Mars), akozala ngala ya Parwase Santa Maria della Presentazione, na kartié Torrevecchia; bongo na mokolo mwa zomi na mitano ya Marsi to 15 Mars, akozala na Parwase ya Sacré-Coeur de Jésus, na Ponte Mammolo
Ba Ezuzulu
Ebandela ya eleko ya Karezimo, o mokolo mwa zomi na mwambé ya Febwali (18 Fevrier), Misa moko ekosalema na sima ya nzanga, ekokambama na yemei pàpa, na bazilika Sainte-Sabine na nzela ya Aventin. Liboso na yango, ekozala nà Statio mpe procession mpo ya bolimbi masumu. Ekolungwa kobanda na eklezya ya pembeni ya Sant’Anselmo. Nzela ekomema na eyenga ya Pasika, ekozala bó momeseno, nà baezuzulu ya Pàpa na Kurya ya Roma. Ekoleka na ndako ya Bontómà, o mokolo mwa 22 Febwali, na nsima ya nzanga kino o mokolo mwa 27 Febwali.
Triduum ya Pasika
Nsima ya eyenga ya Mandalala, o mokolo mwa tuku mibale na libwà, to mpe 29 Mars, milulu mya Triduum ya Pasika mikobanda o mokolo mwa Minei Mosantu, elongo nà Misa ya Chrisma na ntongo, na bazilika Saint-Pierre. Bongo Misa ya mpokwa akosala yango na Bazilika ya Saint-Jean-ya-Latran, oyo etangami nde «Katedrali ya Episkopo ya Roma». Na mpokwa ya mokolo ma Mitano Mosantu, ekozala nà nzela ya Kuruzé, bó momesano, na Colisée. Mokoloto esili eniatamaki mp ona yango. Nà mpe Veillée ya Bùtù Esantu, ekosalema na Bazilika Saint-Pierre. Ekozala mpe na Misa ya moyi, ya mokolo mwa Lomingo la Pasika, kaka na esika enà. Misa mànà ekosukisama lokola ezali limeseno, nà bobenisi “Urbi et Orbi” oyo ekopesama ut’o mbalisano ya loggia ya monene ya Bazilika Saint-Pierre.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
